Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūnus   Ayah:
وَإِذَآ أَذَقۡنَا ٱلنَّاسَ رَحۡمَةٗ مِّنۢ بَعۡدِ ضَرَّآءَ مَسَّتۡهُمۡ إِذَا لَهُم مَّكۡرٞ فِيٓ ءَايَاتِنَاۚ قُلِ ٱللَّهُ أَسۡرَعُ مَكۡرًاۚ إِنَّ رُسُلَنَا يَكۡتُبُونَ مَا تَمۡكُرُونَ
Mpe soki topesi bato bolamu o sima ya mabe kozua bango, bakomi kobundisa mikapo mia biso. Loba: Allah azali lombango na mwango. Ya sólo batindami na biso (ba anzelu) bazali кокота mwango bozali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
هُوَ ٱلَّذِي يُسَيِّرُكُمۡ فِي ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا كُنتُمۡ فِي ٱلۡفُلۡكِ وَجَرَيۡنَ بِهِم بِرِيحٖ طَيِّبَةٖ وَفَرِحُواْ بِهَا جَآءَتۡهَا رِيحٌ عَاصِفٞ وَجَآءَهُمُ ٱلۡمَوۡجُ مِن كُلِّ مَكَانٖ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُمۡ أُحِيطَ بِهِمۡ دَعَوُاْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ لَئِنۡ أَنجَيۡتَنَا مِنۡ هَٰذِهِۦ لَنَكُونَنَّ مِنَ ٱلشَّٰكِرِينَ
Yende azali kotambwisa bino na mokili mpe na ebale. Kino tango bozalaka o kati ya masua, azali kotindela bino mopepe ya kitoko, bozali kosepela na yango. Kino mopepe makasi ya mabe mpe na mbonge moko wuta bipai na bipai mpe bamoni, ete basili kozingama mpe bakomi kobelela Allah na bosembo mpenza, koloba: Soki obikisi biso na oyo, tokozala kati ya baye bazali kotonda yo.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَلَمَّآ أَنجَىٰهُمۡ إِذَا هُمۡ يَبۡغُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّۗ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّمَا بَغۡيُكُمۡ عَلَىٰٓ أَنفُسِكُمۖ مَّتَٰعَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ ثُمَّ إِلَيۡنَا مَرۡجِعُكُمۡ فَنُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Mpe soki abikisi bango, okomona bango bakomi kobebisa na bobubi o kati na mokili, batiki bosôló. Oh bino bato! Botomboki bwa bino, bokozongela sé bino moko. Bomoyi búa nsé bisengo ya ntango шоке, sima epai na biso nde bokozongisama, mpe tokoyebisaka bino maye bozalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا مَثَلُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا كَمَآءٍ أَنزَلۡنَٰهُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ فَٱخۡتَلَطَ بِهِۦ نَبَاتُ ٱلۡأَرۡضِ مِمَّا يَأۡكُلُ ٱلنَّاسُ وَٱلۡأَنۡعَٰمُ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَخَذَتِ ٱلۡأَرۡضُ زُخۡرُفَهَا وَٱزَّيَّنَتۡ وَظَنَّ أَهۡلُهَآ أَنَّهُمۡ قَٰدِرُونَ عَلَيۡهَآ أَتَىٰهَآ أَمۡرُنَا لَيۡلًا أَوۡ نَهَارٗا فَجَعَلۡنَٰهَا حَصِيدٗا كَأَن لَّمۡ تَغۡنَ بِٱلۡأَمۡسِۚ كَذَٰلِكَ نُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
Ya soló, ndakisa ya bomoyi bwa nsé ezali lokola mayi tokitisaka kowuta o likolo, mpe esangani na milona (matiti) ya mabele, ezali koleisa bato na banyama, kino mabele ekozua bonzenga na yango mpe ekomisi bilanga kitoko, bakolo na yango bazali kokanisa ete bazali na bokoki likolo na yango, mpe mokano na biso moko eyelaki yango butu to moyi, mpe tokomisi yango pamba lolenge mosusu lokola eloko ezalaki te liboso. Lolenge wana nde tozali kolimbola bilembo bia biso, mpo bato bakoka kososolo.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱللَّهُ يَدۡعُوٓاْ إِلَىٰ دَارِ ٱلسَّلَٰمِ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
Allah azali kobenga bato na ndako ya kimia, mpe akambaka oyo alingi o nzela ya semba.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūnus
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close