Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūnus   Ayah:
قَالَ قَدۡ أُجِيبَت دَّعۡوَتُكُمَا فَٱسۡتَقِيمَا وَلَا تَتَّبِعَآنِّ سَبِيلَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
Alobi:[1] kosenga na bino esili kondimama. Botikala na bokambami o nzela ya semba, kasi bolanda te nzela ya baye bazanga boyebi.
[1] Allah.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ وَجَٰوَزۡنَا بِبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱلۡبَحۡرَ فَأَتۡبَعَهُمۡ فِرۡعَوۡنُ وَجُنُودُهُۥ بَغۡيٗا وَعَدۡوًاۖ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَدۡرَكَهُ ٱلۡغَرَقُ قَالَ ءَامَنتُ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱلَّذِيٓ ءَامَنَتۡ بِهِۦ بَنُوٓاْ إِسۡرَٰٓءِيلَ وَأَنَا۠ مِنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
Mpe tokatisaki bana ya isalayele ebale. Mpe falo na basoda naye balandaki bango na bonguna mpe likunya, kino amonaki liwa na miso naye okati ya ebale, alobaki: Nandimi ya soló été, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé bobele oyo bana ya isalayele bandimi naye, mpe ngai nazali o kati ya bamisilima.
Arabic explanations of the Qur’an:
ءَآلۡـَٰٔنَ وَقَدۡ عَصَيۡتَ قَبۡلُ وَكُنتَ مِنَ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
(Allah alobi): Sik’oyo nde ondimi; kasi oboyaki kotosa liboso, mpe ozalaki o kati ya babebisi?
Arabic explanations of the Qur’an:
فَٱلۡيَوۡمَ نُنَجِّيكَ بِبَدَنِكَ لِتَكُونَ لِمَنۡ خَلۡفَكَ ءَايَةٗۚ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِ عَنۡ ءَايَٰتِنَا لَغَٰفِلُونَ
Lelo, tokobomba nzoto nayo mpo etikala elembo na baye bakoya sima nayo, kasi ebele ya bato bazali kokeba te na bilembo bia biso.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ بَوَّأۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ مُبَوَّأَ صِدۡقٖ وَرَزَقۡنَٰهُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ فَمَا ٱخۡتَلَفُواْ حَتَّىٰ جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُۚ إِنَّ رَبَّكَ يَقۡضِي بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
Sólo mpenza tovandisaki bana ya isalayele na esika ya lokumu, mpe topesaki bango bilei ya kitoko. Na sima bakabwanaki sé wana boyebi ekomeli bango. Ya sólo, Nkolo wayo akosambisa kati na bango o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki kokesene na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن كُنتَ فِي شَكّٖ مِّمَّآ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ فَسۡـَٔلِ ٱلَّذِينَ يَقۡرَءُونَ ٱلۡكِتَٰبَ مِن قَبۡلِكَۚ لَقَدۡ جَآءَكَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ فَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُمۡتَرِينَ
Mpe soki ozali na tembe тропа maye tokitiselaki yo, tuna baye bazali kotanga buku eye ekitaki liboso nayo. Bosôló bosili koyela yo kowuta epai ya Nkolo wayo. Kasi kozala te elongo ya baye bazali kotiya tembe mpe koyimayima.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَتَكُونَ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
Mpe kozala te elongo na baye bazali kozua mikapo mpe bilembo bia Allah été yango ezali lokuta, noki okozala o kati ya bazangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱلَّذِينَ حَقَّتۡ عَلَيۡهِمۡ كَلِمَتُ رَبِّكَ لَا يُؤۡمِنُونَ
Ya soló, baye liloba lia Nkolo wayo lisila kokweyela bango, bakotikalaka kondima te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡ جَآءَتۡهُمۡ كُلُّ ءَايَةٍ حَتَّىٰ يَرَوُاْ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
Ata soki bilembo binso biyeli bango, kino bakomonaka etumbu ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūnus
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close