Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūnus   Ayah:
فَلَوۡلَا كَانَتۡ قَرۡيَةٌ ءَامَنَتۡ فَنَفَعَهَآ إِيمَٰنُهَآ إِلَّا قَوۡمَ يُونُسَ لَمَّآ ءَامَنُواْ كَشَفۡنَا عَنۡهُمۡ عَذَابَ ٱلۡخِزۡيِ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٖ
Mpe soki ezalaki na etuka oyo ekokaki kondima (na Allah), longola sé etuka ya Yûnus tango endimaki mpe bondimi na bango esungaki bango? Na yango tolongolaki bango etumbu oyo esilisaki bango lokumu awa na nsé, mpe sima topesaki bango nkembo ya bomoyi ya mwa tango токе.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡ شَآءَ رَبُّكَ لَأٓمَنَ مَن فِي ٱلۡأَرۡضِ كُلُّهُمۡ جَمِيعًاۚ أَفَأَنتَ تُكۡرِهُ ٱلنَّاسَ حَتَّىٰ يَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
Mpe soki Nkolo wayo alingaki nde bato banso awa na mokili bakomi bandimi, boye yo nde okondimisa bato nionso na makasi?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا كَانَ لِنَفۡسٍ أَن تُؤۡمِنَ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ وَيَجۡعَلُ ٱلرِّجۡسَ عَلَى ٱلَّذِينَ لَا يَعۡقِلُونَ
Мре moto akoki kondima te sé na ndingisa ya Allah. Mpe apesaka etumbu na baye bakanisaka te.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُلِ ٱنظُرُواْ مَاذَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَمَا تُغۡنِي ٱلۡأٓيَٰتُ وَٱلنُّذُرُ عَن قَوۡمٖ لَّا يُؤۡمِنُونَ
Loba: Bótala nini ezali na likolo na mabele. Kasi bilembo ya bokamwisi mpe na bakebisi,[1] bakokaki te kosalisa bato bazanga kondima.
[1] Bakebisi: Elingi koloba! Batindami.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَهَلۡ يَنتَظِرُونَ إِلَّا مِثۡلَ أَيَّامِ ٱلَّذِينَ خَلَوۡاْ مِن قَبۡلِهِمۡۚ قُلۡ فَٱنتَظِرُوٓاْ إِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُنتَظِرِينَ
Boye, bazali kozela eloko esusu, lokola etumbu eye ezalaki o tango ya baye babebisaki liboso? Loba: Bozela, ngai lokola nakozela elongo na bino.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ نُنَجِّي رُسُلَنَا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ كَذَٰلِكَ حَقًّا عَلَيۡنَا نُنجِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Sima tokangolaki batindami na biso elongo na baye bandimaki. Ndenge wana nde ezalaki lotomo epai na biso тропа kokangola bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُلۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِن كُنتُمۡ فِي شَكّٖ مِّن دِينِي فَلَآ أَعۡبُدُ ٱلَّذِينَ تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَٰكِنۡ أَعۡبُدُ ٱللَّهَ ٱلَّذِي يَتَوَفَّىٰكُمۡۖ وَأُمِرۡتُ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Loba: Oh bino bato! Soki bozali na tembe na lingomba lia ngai na kobondela te oyo bozali kobondela na botiki Allah, kasi nakobondela Allah oyo akoboma bino, mpe natindamaki тропа kozala moko o kati ya bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَنۡ أَقِمۡ وَجۡهَكَ لِلدِّينِ حَنِيفٗا وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
Mpe balóla elongi nayo okati na lingomba ya bopeto ya bomoko ya Allah, kasi kozala elongo na basambeli bikeko na binzambe nzambe te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا تَدۡعُ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَنفَعُكَ وَلَا يَضُرُّكَۖ فَإِن فَعَلۡتَ فَإِنَّكَ إِذٗا مِّنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe kobondela basusu te na botiki Allah baye bakoki kosala yo bolamu mpe mabe te. Soki osali yango, soló okozuama o kati ya babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūnus
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close