Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūnus   Ayah:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَاتُنَا بَيِّنَٰتٖ قَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا ٱئۡتِ بِقُرۡءَانٍ غَيۡرِ هَٰذَآ أَوۡ بَدِّلۡهُۚ قُلۡ مَا يَكُونُ لِيٓ أَنۡ أُبَدِّلَهُۥ مِن تِلۡقَآيِٕ نَفۡسِيٓۖ إِنۡ أَتَّبِعُ إِلَّا مَا يُوحَىٰٓ إِلَيَّۖ إِنِّيٓ أَخَافُ إِنۡ عَصَيۡتُ رَبِّي عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bazali kolikya na bokutani na biso te, bakolobaka: Yaka na kurani mosusu kasi oyo te, to bobongola yango! Loba: Esengeli na ngai te kobalola yango na lolenge na ngai, nazali kolanda bobele maye bayebisaki ngai. Ya soló, nazali kobanga soki nazangi botosi na Nkolo wa ngai, noki nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُل لَّوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا تَلَوۡتُهُۥ عَلَيۡكُمۡ وَلَآ أَدۡرَىٰكُم بِهِۦۖ فَقَدۡ لَبِثۡتُ فِيكُمۡ عُمُرٗا مِّن قَبۡلِهِۦٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Loba ete: Soki Allah alingaki, nde natangeli bino yango te, nde mpe nalakisi bino yango te.[1] nasilaki kofanda na bino mibu miyike liboso na yango, boye bozali kokanisa te?
[1] Kurani.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ كَذَّبَ بِـَٔايَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
Mpe oyo alekisi kobuba nde oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondimela mikapo mia ye? Ya solo, ye akolongisa batomboki te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَضُرُّهُمۡ وَلَا يَنفَعُهُمۡ وَيَقُولُونَ هَٰٓؤُلَآءِ شُفَعَٰٓؤُنَا عِندَ ٱللَّهِۚ قُلۡ أَتُنَبِّـُٔونَ ٱللَّهَ بِمَا لَا يَعۡلَمُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
Mpe bazali kobondela basusu baye bakoki kosala bango mabe to malamu te, batiki Allah, mpe bazali koloba: Ba oyo nde bakolobelela biso epai ya Allah. Loba: Bolingi koloba ete Allah ayebi te maye mazali o likolo na mabele? Lokumu naye Nkolo wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا كَانَ ٱلنَّاسُ إِلَّآ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ فَٱخۡتَلَفُواْۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَقُضِيَ بَيۡنَهُمۡ فِيمَا فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
Mpe bato bazalaki (na ebandeli) sé umma[1] moko sima bakabwani na bokeseni na bango. Soki ezalaki na mokano ya Nkolo nayo te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango na ntina ya maye bazalaki kokesene na yango.
[1] Umma: Awa elakisi lingomba, bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيَقُولُونَ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦۖ فَقُلۡ إِنَّمَا ٱلۡغَيۡبُ لِلَّهِ فَٱنتَظِرُوٓاْ إِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُنتَظِرِينَ
Bakolobaka ete: Soki ata Nkolo naye akitiselaka ye likamwisi liwuta epai ya Nkolo waye! Mpe loba: Ya soló, mabombami mazali ya Allah, na yango bozela, ya sólo, ngai mpe nazali kozela elongo na bino.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūnus
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close