Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نساء   آیت:
۞ لَّا خَيۡرَ فِي كَثِيرٖ مِّن نَّجۡوَىٰهُمۡ إِلَّا مَنۡ أَمَرَ بِصَدَقَةٍ أَوۡ مَعۡرُوفٍ أَوۡ إِصۡلَٰحِۭ بَيۡنَ ٱلنَّاسِۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ ٱبۡتِغَآءَ مَرۡضَاتِ ٱللَّهِ فَسَوۡفَ نُؤۡتِيهِ أَجۡرًا عَظِيمٗا
Litomba ezali te na ebele ya makita na bango bazali kosala, sé na moto oyo azali kotinda na bokabi mpe na bolamu to mpe boyokani kati ya bato. Oyo akosala yango na koluka bosepelisi ya Allah, tokopesa ye lifuta linene.
عربي تفسیرونه:
وَمَن يُشَاقِقِ ٱلرَّسُولَ مِنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُ ٱلۡهُدَىٰ وَيَتَّبِعۡ غَيۡرَ سَبِيلِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ نُوَلِّهِۦ مَا تَوَلَّىٰ وَنُصۡلِهِۦ جَهَنَّمَۖ وَسَآءَتۡ مَصِيرًا
Kasi oyo akosala bokeseni na motindami sima na polele mpe lisungi esili koyela ye, mpe alandi nzela ya bandimi te, tokopesa ye maye azali koluka, mpe tokomema ye na lifelo, mpe oyo nde bozongi ya mabe!
عربي تفسیرونه:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَغۡفِرُ أَن يُشۡرَكَ بِهِۦ وَيَغۡفِرُ مَا دُونَ ذَٰلِكَ لِمَن يَشَآءُۚ وَمَن يُشۡرِكۡ بِٱللَّهِ فَقَدۡ ضَلَّ ضَلَٰلَۢا بَعِيدًا
Ya sôló, Allah alimbisaka te soki basangisi ye na banzambe misusu, kasi alimbisaka masumu masusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah asili kobunga libunga ya mosika.
عربي تفسیرونه:
إِن يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ إِنَٰثٗا وَإِن يَدۡعُونَ إِلَّا شَيۡطَٰنٗا مَّرِيدٗا
Bazali kobelela bikeko batiki ye (Allah), biye bazali kobelela bizali sé basi, bazali kobelela sé santana motomboki.
عربي تفسیرونه:
لَّعَنَهُ ٱللَّهُۘ وَقَالَ لَأَتَّخِذَنَّ مِنۡ عِبَادِكَ نَصِيبٗا مَّفۡرُوضٗا
Allah alakela ye mabe, mpe alobaki (na Allah) ete: Nakobanda kozua epai ya bawumbu nayo biteni ya lotomo.
عربي تفسیرونه:
وَلَأُضِلَّنَّهُمۡ وَلَأُمَنِّيَنَّهُمۡ وَلَأٓمُرَنَّهُمۡ فَلَيُبَتِّكُنَّ ءَاذَانَ ٱلۡأَنۡعَٰمِ وَلَأٓمُرَنَّهُمۡ فَلَيُغَيِّرُنَّ خَلۡقَ ٱللَّهِۚ وَمَن يَتَّخِذِ ٱلشَّيۡطَٰنَ وَلِيّٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِ فَقَدۡ خَسِرَ خُسۡرَانٗا مُّبِينٗا
Ya sôló, nako bungisa bango. Mpe nakopesa bango elikia ya lokuta, mpe nakotindaka bango bakotobolaka matoyi ya bibwele mpe nakotindaka bango bakobongola lolenge ya bikelamu ya Allah, mpe oyo akozwa satana moninga atiki Allah, ya sôló yende asili kozanga bozangi ya polele.
عربي تفسیرونه:
يَعِدُهُمۡ وَيُمَنِّيهِمۡۖ وَمَا يَعِدُهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ إِلَّا غُرُورًا
Azali kolaka bango elaka ya lokuta, mpe satana apesaka sé elaka ya lokuta.
عربي تفسیرونه:
أُوْلَٰٓئِكَ مَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُ وَلَا يَجِدُونَ عَنۡهَا مَحِيصٗا
Bango wana nde esika na bango ya kofanda ekozala lifelo, mpe bakozua eloko ekokimisa bango na yango te.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نساء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول