Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نساء   آیت:
لَّا يَسۡتَوِي ٱلۡقَٰعِدُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ غَيۡرُ أُوْلِي ٱلضَّرَرِ وَٱلۡمُجَٰهِدُونَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡۚ فَضَّلَ ٱللَّهُ ٱلۡمُجَٰهِدِينَ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ عَلَى ٱلۡقَٰعِدِينَ دَرَجَةٗۚ وَكُلّٗا وَعَدَ ٱللَّهُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ وَفَضَّلَ ٱللَّهُ ٱلۡمُجَٰهِدِينَ عَلَى ٱلۡقَٰعِدِينَ أَجۡرًا عَظِيمٗا
Mapinga kati ya bandimi baye babundi na nzela na Allah na misolo mia bango mpe na milimo mia bango, bakokani te na baye bafandi na bandako na bango longola sé ba oyo bazali na kpokoso. Allah atomboli baye ya mapinga likolo na baye bafandi na nsé, kasi na bango nyoso Allah alaki bolamu. Kasi Allah atondisi bolamu naye mingi likolo na mapinga naye mpe lifuta linene.
عربي تفسیرونه:
دَرَجَٰتٖ مِّنۡهُ وَمَغۡفِرَةٗ وَرَحۡمَةٗۚ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمًا
Bakozua lopete ya lokumu epai naye, bolimbisi mpe ngolu kowuta epai na Allah. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ ٱلَّذِينَ تَوَفَّىٰهُمُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ ظَالِمِيٓ أَنفُسِهِمۡ قَالُواْ فِيمَ كُنتُمۡۖ قَالُواْ كُنَّا مُسۡتَضۡعَفِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ قَالُوٓاْ أَلَمۡ تَكُنۡ أَرۡضُ ٱللَّهِ وَٰسِعَةٗ فَتُهَاجِرُواْ فِيهَاۚ فَأُوْلَٰٓئِكَ مَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ وَسَآءَتۡ مَصِيرًا
Ya sôló, baye bamisalaki mabe, ba anzelu bazali kolongola milimo mia bango na koloba ete: Bozalaki lolenge nini? Bakozongisa eyano ete: Biso tozangaki makasi likolo ya mabele, (ba anzelu) bakoloba ete: Mabele ya Allah ezalaki monene te ete bokimela? Bango wana efandeli na bango ekozala lifelo. Oyo nde esika ya mabe!
عربي تفسیرونه:
إِلَّا ٱلۡمُسۡتَضۡعَفِينَ مِنَ ٱلرِّجَالِ وَٱلنِّسَآءِ وَٱلۡوِلۡدَٰنِ لَا يَسۡتَطِيعُونَ حِيلَةٗ وَلَا يَهۡتَدُونَ سَبِيلٗا
Longola sé baye bazangaki bokasi kati na mibali, basi mpe bana, oyo bazalaki na makoki ata moke te ya kozua nzela ya kokima.
عربي تفسیرونه:
فَأُوْلَٰٓئِكَ عَسَى ٱللَّهُ أَن يَعۡفُوَ عَنۡهُمۡۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَفُوًّا غَفُورٗا
Ba oyo wana nde Allah na mawa naye akoki kolimbisa bango. Mpe Allah azali na mawa atonda bolimbisi.
عربي تفسیرونه:
۞ وَمَن يُهَاجِرۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ يَجِدۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُرَٰغَمٗا كَثِيرٗا وَسَعَةٗۚ وَمَن يَخۡرُجۡ مِنۢ بَيۡتِهِۦ مُهَاجِرًا إِلَى ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ ثُمَّ يُدۡرِكۡهُ ٱلۡمَوۡتُ فَقَدۡ وَقَعَ أَجۡرُهُۥ عَلَى ٱللَّهِۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
Mpe moto oyo akotika mboka naye mpona Allah, akozua esika ya komibatela, mpe akofunguama. Mpe oyo abimi na ndako naye akei epai na Allah na motindami naye, mpe liwa lizui ye, ya sôló, lifuta naye ezali epai ya Allah. Mpe Allah azali molimbisi atonda mawa.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا ضَرَبۡتُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَلَيۡسَ عَلَيۡكُمۡ جُنَاحٌ أَن تَقۡصُرُواْ مِنَ ٱلصَّلَوٰةِ إِنۡ خِفۡتُمۡ أَن يَفۡتِنَكُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْۚ إِنَّ ٱلۡكَٰفِرِينَ كَانُواْ لَكُمۡ عَدُوّٗا مُّبِينٗا
Mpe soki bozali na mobembo; ezali lisumu te mpona bino soki bokutoli losambo, soki bozali kobanga komekama ya bapagano. Ya sôló, baye bampengwi. Bazali na kimonguna ya polele likolo na bino.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نساء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول