Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نساء   آیت:
أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ يَزۡعُمُونَ أَنَّهُمۡ ءَامَنُواْ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ وَمَآ أُنزِلَ مِن قَبۡلِكَ يُرِيدُونَ أَن يَتَحَاكَمُوٓاْ إِلَى ٱلطَّٰغُوتِ وَقَدۡ أُمِرُوٓاْ أَن يَكۡفُرُواْ بِهِۦۖ وَيُرِيدُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَن يُضِلَّهُمۡ ضَلَٰلَۢا بَعِيدٗا
Omoni te ete baye bakobete ntolo ete bango bandimi na maye tokitiselaki yo, mpe na maye tokitisaki epai ya baye bayaki liboso nayo? Bango balingaka kosambisa mambi ma bango epai ya motomboki.[1] nzoka nde batindamaki ete bapengwa na yango. Kasi satana alingi kobungisa bango na libunga moko ya mosika.
[1] Motomboki: Bótala Na mokapo 51 ya suratu oyo. Na suratu Al-Baqarah 256, 257.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ إِلَىٰ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ وَإِلَى ٱلرَّسُولِ رَأَيۡتَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ يَصُدُّونَ عَنكَ صُدُودٗا
Mpe soki babengi bango ete: Boya epai na maye Allah akitisa mpe epai ya motindami, okomona bato ya bilongi mibale bakimi yo bakei mosika.
عربي تفسیرونه:
فَكَيۡفَ إِذَآ أَصَٰبَتۡهُم مُّصِيبَةُۢ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡ ثُمَّ جَآءُوكَ يَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ إِنۡ أَرَدۡنَآ إِلَّآ إِحۡسَٰنٗا وَتَوۡفِيقًا
Mpe ndenge nini soki mpasi ezui bango kowuta na maye maboko na bango moko esalaki, sima bakoyela yo mpe bakolapa na nkombo ya Allah ete: Tolingaki sé bolamu na boyokani?!
عربي تفسیرونه:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ يَعۡلَمُ ٱللَّهُ مَا فِي قُلُوبِهِمۡ فَأَعۡرِضۡ عَنۡهُمۡ وَعِظۡهُمۡ وَقُل لَّهُمۡ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ قَوۡلَۢا بَلِيغٗا
Bango wana nde Allah ayebi maye mazuami o’mitema mia bango. Kolanda makambo na bango te, mpe lendisa bango, mpe lobela bango maloba ya polele ya bosembo.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا مِن رَّسُولٍ إِلَّا لِيُطَاعَ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ وَلَوۡ أَنَّهُمۡ إِذ ظَّلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ جَآءُوكَ فَٱسۡتَغۡفَرُواْ ٱللَّهَ وَٱسۡتَغۡفَرَ لَهُمُ ٱلرَّسُولُ لَوَجَدُواْ ٱللَّهَ تَوَّابٗا رَّحِيمٗا
Mpe totindaki motindami moko te epai ya bato bobele ete batosa ye sé na ndingisa ya Allah. Mpe bango tango basalaki milimo na bango mabe, bayaki epai nayo mpona kosenga Allah bolimbisi, mpe motindami asengela bango bolimbisi, balingaki kokuta Allah moyambi monene ya tubela mpe moyoki mawa.
عربي تفسیرونه:
فَلَا وَرَبِّكَ لَا يُؤۡمِنُونَ حَتَّىٰ يُحَكِّمُوكَ فِيمَا شَجَرَ بَيۡنَهُمۡ ثُمَّ لَا يَجِدُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ حَرَجٗا مِّمَّا قَضَيۡتَ وَيُسَلِّمُواْ تَسۡلِيمٗا
Mpe na nkombo ya Nkolo wayo, bakozala bandimi te kino bako tia yo zuzi ya likambo likwei kati na bango mpe bakoyoka mpasi te na mitema mpona likambo okateli bango, mpe na sima bandima mpe batosa yango.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نساء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول