Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: نساء   آیت:
وَلَوۡ أَنَّا كَتَبۡنَا عَلَيۡهِمۡ أَنِ ٱقۡتُلُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ أَوِ ٱخۡرُجُواْ مِن دِيَٰرِكُم مَّا فَعَلُوهُ إِلَّا قَلِيلٞ مِّنۡهُمۡۖ وَلَوۡ أَنَّهُمۡ فَعَلُواْ مَا يُوعَظُونَ بِهِۦ لَكَانَ خَيۡرٗا لَّهُمۡ وَأَشَدَّ تَثۡبِيتٗا
Mpe soki totielaki bango mobeko ete: Bomiboma to bomibimisa na bandako na bino, mbele balingaki kosala yango te, longola sé ndambu moke kati na bango. Kasi soki basalaka maye bateyamaki na yango, nde elingaki ezala malamu mpona bango, mpe lilendisi ya makasi.
عربي تفسیرونه:
وَإِذٗا لَّأٓتَيۡنَٰهُم مِّن لَّدُنَّآ أَجۡرًا عَظِيمٗا
Nde topesaki bango litomba ya monene kowuta epai na biso,
عربي تفسیرونه:
وَلَهَدَيۡنَٰهُمۡ صِرَٰطٗا مُّسۡتَقِيمٗا
Nde tokambaki bango na nzela ya semba.
عربي تفسیرونه:
وَمَن يُطِعِ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَ فَأُوْلَٰٓئِكَ مَعَ ٱلَّذِينَ أَنۡعَمَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ وَٱلصِّدِّيقِينَ وَٱلشُّهَدَآءِ وَٱلصَّٰلِحِينَۚ وَحَسُنَ أُوْلَٰٓئِكَ رَفِيقٗا
Oyo akotosa Allah na motindami, bango wana nde bakozala elongo na baye Allah atondisela bango bolamu naye kati na bantoma, mpe bato ya bosembo, mpe baye bakufaki na kobunda na nzela na Allah, mpe bato ya malamu, oyo nde balongani ya kitoko.
عربي تفسیرونه:
ذَٰلِكَ ٱلۡفَضۡلُ مِنَ ٱللَّهِۚ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ عَلِيمٗا
Wana ezali bolamu kowuta epai na Allah. Mpe Allah nde akoki na yango lokola moyebi.
عربي تفسیرونه:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ خُذُواْ حِذۡرَكُمۡ فَٱنفِرُواْ ثُبَاتٍ أَوِ ٱنفِرُواْ جَمِيعٗا
Eh bino bandimi! Bobongama mpe bokende na bitumba na bokabwani to mpe na lisanga;
عربي تفسیرونه:
وَإِنَّ مِنكُمۡ لَمَن لَّيُبَطِّئَنَّ فَإِنۡ أَصَٰبَتۡكُم مُّصِيبَةٞ قَالَ قَدۡ أَنۡعَمَ ٱللَّهُ عَلَيَّ إِذۡ لَمۡ أَكُن مَّعَهُمۡ شَهِيدٗا
Mpe okati na bino ezali na basusu akolekisa tango mpona kotikala na sima, mpe soki likama ezui bino na bitumba akoloba ete:Ya sôló, Allah asili kosala ngai malamu na ntina ete nazalaki na bango elongo te, mpo noki nalingaki nakufa na bitumba,
عربي تفسیرونه:
وَلَئِنۡ أَصَٰبَكُمۡ فَضۡلٞ مِّنَ ٱللَّهِ لَيَقُولَنَّ كَأَن لَّمۡ تَكُنۢ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُۥ مَوَدَّةٞ يَٰلَيۡتَنِي كُنتُ مَعَهُمۡ فَأَفُوزَ فَوۡزًا عَظِيمٗا
Kasi soki bolamu ya Allah ekiteli bino, akoloba lokola bolingo ezalaki kati na bino te, eh! Ngai mawa na ngai soki nazalaki na bango elongo nde nazui elonga ya monene!
عربي تفسیرونه:
۞ فَلۡيُقَٰتِلۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ٱلَّذِينَ يَشۡرُونَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا بِٱلۡأٓخِرَةِۚ وَمَن يُقَٰتِلۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَيُقۡتَلۡ أَوۡ يَغۡلِبۡ فَسَوۡفَ نُؤۡتِيهِ أَجۡرًا عَظِيمٗا
Babundisa na nzela ya Allah, baye bazali kotekisa lola na ntalo moke mpona kozua bomoyi na nsé, kasi oyo akobunda na nzela ya Allah, mpe akufi na bitumba to alongi bitumba, tokopesa ye lifuta ya monene.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: نساء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول