Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: صافات   آیت:

As-Swâffât

وَٱلصَّٰٓفَّٰتِ صَفّٗا
Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo,
عربي تفسیرونه:
فَٱلزَّٰجِرَٰتِ زَجۡرٗا
Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata).[1]
[1] Mpe biloko misusu.
عربي تفسیرونه:
فَٱلتَّٰلِيَٰتِ ذِكۡرًا
Na baye batangaka bokundoli.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ إِلَٰهَكُمۡ لَوَٰحِدٞ
Ya soló, Nzambe na bino azali moko.
عربي تفسیرونه:
رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَرَبُّ ٱلۡمَشَٰرِقِ
Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele.
عربي تفسیرونه:
إِنَّا زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِزِينَةٍ ٱلۡكَوَاكِبِ
Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto.
عربي تفسیرونه:
وَحِفۡظٗا مِّن كُلِّ شَيۡطَٰنٖ مَّارِدٖ
Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki.
عربي تفسیرونه:
لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى ٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰ وَيُقۡذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبٖ
Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso,
عربي تفسیرونه:
دُحُورٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ وَاصِبٌ
Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela.
عربي تفسیرونه:
إِلَّا مَنۡ خَطِفَ ٱلۡخَطۡفَةَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابٞ ثَاقِبٞ
Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto.
عربي تفسیرونه:
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَهُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَم مَّنۡ خَلَقۡنَآۚ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّن طِينٖ لَّازِبِۭ
Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka.
عربي تفسیرونه:
بَلۡ عَجِبۡتَ وَيَسۡخَرُونَ
Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka.
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا ذُكِّرُواْ لَا يَذۡكُرُونَ
Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
عربي تفسیرونه:
وَإِذَا رَأَوۡاْ ءَايَةٗ يَسۡتَسۡخِرُونَ
Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٌ
Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele.
عربي تفسیرونه:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu?
عربي تفسیرونه:
أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Na bankoko na biso ya kala?
عربي تفسیرونه:
قُلۡ نَعَمۡ وَأَنتُمۡ دَٰخِرُونَ
Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama.
عربي تفسیرونه:
فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٞ وَٰحِدَةٞ فَإِذَا هُمۡ يَنظُرُونَ
Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا هَٰذَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ
Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
عربي تفسیرونه:
هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango.
عربي تفسیرونه:
۞ ٱحۡشُرُواْ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ وَأَزۡوَٰجَهُمۡ وَمَا كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango.
عربي تفسیرونه:
مِن دُونِ ٱللَّهِ فَٱهۡدُوهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡجَحِيمِ
Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo.
عربي تفسیرونه:
وَقِفُوهُمۡۖ إِنَّهُم مَّسۡـُٔولُونَ
Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: صافات
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول