Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: صافات   آیت:
يَقُولُ أَءِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُصَدِّقِينَ
Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi.
عربي تفسیرونه:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَدِينُونَ
Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka?
عربي تفسیرونه:
قَالَ هَلۡ أَنتُم مُّطَّلِعُونَ
Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo?
عربي تفسیرونه:
فَٱطَّلَعَ فَرَءَاهُ فِي سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo.
عربي تفسیرونه:
قَالَ تَٱللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرۡدِينِ
Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga.
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡلَا نِعۡمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu.
عربي تفسیرونه:
أَفَمَا نَحۡنُ بِمَيِّتِينَ
Ezali solo te ete tokokufa te?
عربي تفسیرونه:
إِلَّا مَوۡتَتَنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te?
عربي تفسیرونه:
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Ya soló, oyo nde elonga enene.
عربي تفسیرونه:
لِمِثۡلِ هَٰذَا فَلۡيَعۡمَلِ ٱلۡعَٰمِلُونَ
Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala.
عربي تفسیرونه:
أَذَٰلِكَ خَيۡرٞ نُّزُلًا أَمۡ شَجَرَةُ ٱلزَّقُّومِ
Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe),
عربي تفسیرونه:
إِنَّا جَعَلۡنَٰهَا فِتۡنَةٗ لِّلظَّٰلِمِينَ
Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi,
عربي تفسیرونه:
إِنَّهَا شَجَرَةٞ تَخۡرُجُ فِيٓ أَصۡلِ ٱلۡجَحِيمِ
Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo,
عربي تفسیرونه:
طَلۡعُهَا كَأَنَّهُۥ رُءُوسُ ٱلشَّيَٰطِينِ
Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana.
عربي تفسیرونه:
فَإِنَّهُمۡ لَأٓكِلُونَ مِنۡهَا فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ إِنَّ لَهُمۡ عَلَيۡهَا لَشَوۡبٗا مِّنۡ حَمِيمٖ
Sima bakomela mayi ya tofina ya moto.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ إِنَّ مَرۡجِعَهُمۡ لَإِلَى ٱلۡجَحِيمِ
Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo.
عربي تفسیرونه:
إِنَّهُمۡ أَلۡفَوۡاْ ءَابَآءَهُمۡ ضَآلِّينَ
Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi.
عربي تفسیرونه:
فَهُمۡ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ يُهۡرَعُونَ
Mpe balandaki sé nzele na bango.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ ضَلَّ قَبۡلَهُمۡ أَكۡثَرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا فِيهِم مُّنذِرِينَ
Tosilaki kotindela bango bakebisi.
عربي تفسیرونه:
فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki.
عربي تفسیرونه:
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ نَادَىٰنَا نُوحٞ فَلَنِعۡمَ ٱلۡمُجِيبُونَ
Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko.
عربي تفسیرونه:
وَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: صافات
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول