Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   វាក្យខណ្ឌ:
ٱلَّذِينَ يَأۡكُلُونَ ٱلرِّبَوٰاْ لَا يَقُومُونَ إِلَّا كَمَا يَقُومُ ٱلَّذِي يَتَخَبَّطُهُ ٱلشَّيۡطَٰنُ مِنَ ٱلۡمَسِّۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُوٓاْ إِنَّمَا ٱلۡبَيۡعُ مِثۡلُ ٱلرِّبَوٰاْۗ وَأَحَلَّ ٱللَّهُ ٱلۡبَيۡعَ وَحَرَّمَ ٱلرِّبَوٰاْۚ فَمَن جَآءَهُۥ مَوۡعِظَةٞ مِّن رَّبِّهِۦ فَٱنتَهَىٰ فَلَهُۥ مَا سَلَفَ وَأَمۡرُهُۥٓ إِلَى ٱللَّهِۖ وَمَنۡ عَادَ فَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Baye bazali kolia mbongo ya ekotama, bakotelema te (kowuta na lisekwa na malita na bango), sé lokola kotelema ya moto oyo zabulu asimbi ye na liboma. Mpo ete bango balobaki ete: Ekotama ezali sé lokola mombongo. Kasi Allah apesi ndingisa ya kosala mombongo, mpe apekisi ekotama. Mpe oyo okati na bino malendisi ya Nkolo naye ekomeli ye mpe atiki ekotama azali na masumu te na maye maleka liboso, mpe likambo naye ezali epai na Allah. Kasi baye bakozongela yango, bango wana nde bazali bato ya móto bakozala na kati seko na seko.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَمۡحَقُ ٱللَّهُ ٱلرِّبَوٰاْ وَيُرۡبِي ٱلصَّدَقَٰتِۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ كُلَّ كَفَّارٍ أَثِيمٍ
Allah azali kobebisa ekotama mpe azali kopambola mbongo ya makabo. Mpe Allah alingaka bapengwi te basumuki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَوُاْ ٱلزَّكَوٰةَ لَهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
Ya sôló baye bandimi na Allah, mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kotelemisa losambo mpe bazali kobimisa zakat,[1] lifuta lia bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mpasi te.
[1] Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَذَرُواْ مَا بَقِيَ مِنَ ٱلرِّبَوٰٓاْ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe botika kozua ndambu ya mosolo ya ekotama, soki ya sôló bozali bandimi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَإِن لَّمۡ تَفۡعَلُواْ فَأۡذَنُواْ بِحَرۡبٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦۖ وَإِن تُبۡتُمۡ فَلَكُمۡ رُءُوسُ أَمۡوَٰلِكُمۡ لَا تَظۡلِمُونَ وَلَا تُظۡلَمُونَ
Mpe soki bosaleli yango te, bozua elaka ya etumba kowuta epayi ya Allah mpe na motindami naye. Mpe soki botubeli, bokozala na mitu ya misolo mia bino, bobuba bato te bino mpe bobubama te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِن كَانَ ذُو عُسۡرَةٖ فَنَظِرَةٌ إِلَىٰ مَيۡسَرَةٖۚ وَأَن تَصَدَّقُواْ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
Mpe soki moto azali na nyongo na bino azali na kpokoso mpona kofuta yango, bokozelisa ye kino azua yango. Mpe soki botiki yango likabo, ezali malamu mpona bino soki boyebaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتَّقُواْ يَوۡمٗا تُرۡجَعُونَ فِيهِ إِلَى ٱللَّهِۖ ثُمَّ تُوَفَّىٰ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
Mpe bobanga mokolo moye bokozonga epai ya Allah, sima molimo nyoso mokofutama na manso asalaki, mpe bakobubamaka te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ