Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   វាក្យខណ្ឌ:
وَقَالَتِ ٱلۡيَهُودُ لَيۡسَتِ ٱلنَّصَٰرَىٰ عَلَىٰ شَيۡءٖ وَقَالَتِ ٱلنَّصَٰرَىٰ لَيۡسَتِ ٱلۡيَهُودُ عَلَىٰ شَيۡءٖ وَهُمۡ يَتۡلُونَ ٱلۡكِتَٰبَۗ كَذَٰلِكَ قَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ مِثۡلَ قَوۡلِهِمۡۚ فَٱللَّهُ يَحۡكُمُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
Mpe bayuda balobaki: Baklisto bazali na eloko te, mpe baklisto balobaki: Bayuda bazali na eloko te, mpe bazali kotanga buku. Ndenge moko na ba oyo bayebi eloko te bazali koloba maloba lokola bango, kasi ya sôló Allah akosambisa bango o mokolo ya suka na maye bazalaki kokabwana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن مَّنَعَ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ أَن يُذۡكَرَ فِيهَا ٱسۡمُهُۥ وَسَعَىٰ فِي خَرَابِهَآۚ أُوْلَٰٓئِكَ مَا كَانَ لَهُمۡ أَن يَدۡخُلُوهَآ إِلَّا خَآئِفِينَۚ لَهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا خِزۡيٞ وَلَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ عَذَابٌ عَظِيمٞ
Nani oyo azali mabe koleka moto oyo apekisi ba masâdjid[1] ya Allah, ete batanga nkombo naye na kati, mpe aluki kobebisa yango? Bango wana bazali na ndingisa te ya kokota okati na yango. Longola sé ba oyo bazali kobanga; bakokitisama awa na nsé na kozanga lokumu, mpe o mokolo ya suka bakozala na etumbu enene.
[1] Bisika babondelaka Allah (Nzambe).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلِلَّهِ ٱلۡمَشۡرِقُ وَٱلۡمَغۡرِبُۚ فَأَيۡنَمَا تُوَلُّواْ فَثَمَّ وَجۡهُ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ
Moniele na eloli ezali ya Allah, mpe esika nyoso bokobaluka, bokokuta elongi ya Allah. Ya sôló Allah azali moyebi monene.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالُواْ ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ وَلَدٗاۗ سُبۡحَٰنَهُۥۖ بَل لَّهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ كُلّٞ لَّهُۥ قَٰنِتُونَ
Mpe balobaki: Allah azali na mwana! bopeto naye! Kasi maye mazali olikolo mpena nsé mazali ya ye; nyoso esengeli kotosa ye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
بَدِيعُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَإِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
Ye mokeli ya likolo mpe na nsé, mpe tango akani likambo, mpe ya sôló oyo akoloba: yango nde ekozalisama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ لَوۡلَا يُكَلِّمُنَا ٱللَّهُ أَوۡ تَأۡتِينَآ ءَايَةٞۗ كَذَٰلِكَ قَالَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِم مِّثۡلَ قَوۡلِهِمۡۘ تَشَٰبَهَتۡ قُلُوبُهُمۡۗ قَدۡ بَيَّنَّا ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يُوقِنُونَ
Mpe baye batanga te balobaki ete: Mpona nini Allah asolisi biso (polele) te, too mpe elembo eyela biso? Na boye nde, bato balekaki liboso na bango, bazalaki koloba lolenge ya maloba na bango. Mitema na bango ekomaki na bokokani. Ya sôló tosili kolimbola bilembo mpo bato bazala na kondima.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ بَشِيرٗا وَنَذِيرٗاۖ وَلَا تُسۡـَٔلُ عَنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡجَحِيمِ
Ya sôló, totindaki yo na bosembo, mopesi sango elamu, mpe mokebisi, mpe okotunama te na ntina ya bato ya lifelo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ