Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   វាក្យខណ្ឌ:
وَقَالُواْ كُونُواْ هُودًا أَوۡ نَصَٰرَىٰ تَهۡتَدُواْۗ قُلۡ بَلۡ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِـۧمَ حَنِيفٗاۖ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
Mpe balobaki: Bozala bayuda to baklisto bokokambama na nzela ya semba. Loba: lingomba ya Ibrâhîm nde ezali nzela ya semba, mpe[1] azalaki te elongo na basambeli bikeko.
[1] Ibrâhîm.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قُولُوٓاْ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَمَآ أُنزِلَ إِلَيۡنَا وَمَآ أُنزِلَ إِلَىٰٓ إِبۡرَٰهِـۧمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَٱلۡأَسۡبَاطِ وَمَآ أُوتِيَ مُوسَىٰ وَعِيسَىٰ وَمَآ أُوتِيَ ٱلنَّبِيُّونَ مِن رَّبِّهِمۡ لَا نُفَرِّقُ بَيۡنَ أَحَدٖ مِّنۡهُمۡ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُسۡلِمُونَ
Boloba: Tondimi na Allah, na maye makitaki epai na biso, mpe na maye makitaki epai ya Ibrâhîm, mpe na Ismâïl, mpe Is’hâq, mpe Ya’qûb, mpe mabota malandami, mpe na maye mapesamaki na Mûssa na Issa, mpe na maye mapesamaki na bantoma kowuta epai ya Nkolo wa bango, tokoki kotia bokeseni te kati ya moko wa bango, mpe biso tomisokie epai naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَإِنۡ ءَامَنُواْ بِمِثۡلِ مَآ ءَامَنتُم بِهِۦ فَقَدِ ٱهۡتَدَواْۖ وَّإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّمَا هُمۡ فِي شِقَاقٖۖ فَسَيَكۡفِيكَهُمُ ٱللَّهُۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
Mpe soki bandimaki na oyo bondimi na yango, ya sôló balingaki kokambama, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló bango bakozala okati ya bokabuani, mpe Allah akobatela yo mpona bango mpo ete azali[1] moyoki mpe moyebi.
[1] Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
صِبۡغَةَ ٱللَّهِ وَمَنۡ أَحۡسَنُ مِنَ ٱللَّهِ صِبۡغَةٗۖ وَنَحۡنُ لَهُۥ عَٰبِدُونَ
Tozali kolanda lingomba ya Allah, na boye nani azali malamu lokola Allah na lingomba lia ye? Mpe mpona ye nde tozali kobondela.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قُلۡ أَتُحَآجُّونَنَا فِي ٱللَّهِ وَهُوَ رَبُّنَا وَرَبُّكُمۡ وَلَنَآ أَعۡمَٰلُنَا وَلَكُمۡ أَعۡمَٰلُكُمۡ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُخۡلِصُونَ
Loba: Bozali kosuanisa biso mpona Allah, ye nde Nkolo wa biso mpe Nkolo wa bino? Biso na misala na biso, bino mpe na misala na bino. Mpe tomipetwami epai naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَمۡ تَقُولُونَ إِنَّ إِبۡرَٰهِـۧمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَٱلۡأَسۡبَاطَ كَانُواْ هُودًا أَوۡ نَصَٰرَىٰۗ قُلۡ ءَأَنتُمۡ أَعۡلَمُ أَمِ ٱللَّهُۗ وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن كَتَمَ شَهَٰدَةً عِندَهُۥ مِنَ ٱللَّهِۗ وَمَا ٱللَّهُ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ
Too bokoloba ete: Ya sôló Ibrâhîm, na Ismâïl, na Is’hâq, mpe Ya’qûb, mpe mabota bazalaki bayuda too baklisto? Loba: Bino nde boyebi mingi, too Allah? Nani azali mabe koleka moto oyo abombi bosembo ya Allah epai naye? Mpe Allah abosani te maye bozali kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تِلۡكَ أُمَّةٞ قَدۡ خَلَتۡۖ لَهَا مَا كَسَبَتۡ وَلَكُم مَّا كَسَبۡتُمۡۖ وَلَا تُسۡـَٔلُونَ عَمَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Ba oyo wana nde umma[1] baye baleka. Bakofutama na maye basalaki, bino mpe bokofutama na maye bosalaki. Bokotunama te na ntina na maye bango basalaki.
[1] Umma: Bótala na suratu oyo mokapo: 128.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ