Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   វាក្យខណ្ឌ:
وَإِذۡ يَرۡفَعُ إِبۡرَٰهِـۧمُ ٱلۡقَوَاعِدَ مِنَ ٱلۡبَيۡتِ وَإِسۡمَٰعِيلُ رَبَّنَا تَقَبَّلۡ مِنَّآۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
Mpe tango Ibrâhîm atombolaki makonzi ya ndako elongo na Ismâïl mpe balobaki ete: Eh Nkolo! Ndimela biso, ya sôló ozali moyoki mpe moyebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبَّنَا وَٱجۡعَلۡنَا مُسۡلِمَيۡنِ لَكَ وَمِن ذُرِّيَّتِنَآ أُمَّةٗ مُّسۡلِمَةٗ لَّكَ وَأَرِنَا مَنَاسِكَنَا وَتُبۡ عَلَيۡنَآۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
Eh! Nkolo na biso tia biso mibale tozala bandimi, mpe na bakitani na biso bazala umma[1] mpo nayo, mpe lakisa biso lolenge na biso ya kokumisa yo, mpe ndima tubela na biso. Ya sôló ozali moyambi tubela mpe moyoki mawa.
[1] Umma: Ezali na bantina ebele: awa elingi koloba: lisanga ya bandimi.
Elakisaka mpe: lingomba, etonga, bandimi, mondimi, libota, imam, mualimu ya malamu, bakitani, nzela, mua ntango mpe etuka (Allah azalaki kotinda na etuka nionso, motindami to ntoma, kowuta na Âdam kino Muhammad oyo azali motindami mpe ntoma ya suka na ndembe na biso ya lelo).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبَّنَا وَٱبۡعَثۡ فِيهِمۡ رَسُولٗا مِّنۡهُمۡ يَتۡلُواْ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتِكَ وَيُعَلِّمُهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَيُزَكِّيهِمۡۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Nkolo wa biso, tinda na kati na bango motindami, atangela bango mikapo mia yo, to mpe bilembo, atangisa bango buku mpe bwanya, apetola bango. Ya sôló yo nde ozali na nguya mpe bwanya.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَن يَرۡغَبُ عَن مِّلَّةِ إِبۡرَٰهِـۧمَ إِلَّا مَن سَفِهَ نَفۡسَهُۥۚ وَلَقَدِ ٱصۡطَفَيۡنَٰهُ فِي ٱلدُّنۡيَاۖ وَإِنَّهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ لَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe oyo akoboya lingomba ya Ibrâhîm, ye wana nde asili kobwaka molimo naye na bozoba? Ya sôló toponaki ye[1] awa na nsé, mpe ya sôló na mokolo ya suka akozala elongo moko na bato ya malamu.
[1] Ibrâhîm.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ قَالَ لَهُۥ رَبُّهُۥٓ أَسۡلِمۡۖ قَالَ أَسۡلَمۡتُ لِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe tango Nkolo naye alobaki naye ete: Misokia, alobaki: Namisoki mpona Nkolo wa molongo mobimba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَوَصَّىٰ بِهَآ إِبۡرَٰهِـۧمُ بَنِيهِ وَيَعۡقُوبُ يَٰبَنِيَّ إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰ لَكُمُ ٱلدِّينَ فَلَا تَمُوتُنَّ إِلَّا وَأَنتُم مُّسۡلِمُونَ
Mpe Ibrâhîm apesaki yango mitindo na bana naye, mpe lolenge moko na Ya’qûb alobaki na bana naye: Eh bana na nga!, ya sôló Allah aponeli bino lingomba. Bokufa te bobele bozala nakati ya komisokia.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَمۡ كُنتُمۡ شُهَدَآءَ إِذۡ حَضَرَ يَعۡقُوبَ ٱلۡمَوۡتُ إِذۡ قَالَ لِبَنِيهِ مَا تَعۡبُدُونَ مِنۢ بَعۡدِيۖ قَالُواْ نَعۡبُدُ إِلَٰهَكَ وَإِلَٰهَ ءَابَآئِكَ إِبۡرَٰهِـۧمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ إِلَٰهٗا وَٰحِدٗا وَنَحۡنُ لَهُۥ مُسۡلِمُونَ
Boye bozalaki banzeneneke tango liwa ekomelaki Ya’qûb mpe alobaki na bana naye ete:nani bokobondela sima na nga? Balobaki ete: Tokobondela Nzambe nayo, mpe Nzambe ya batata nayo Ibrâhîm, Ismâïl mpe Is’hâq, ye azali Nzambe sé moko oyo tomisoki epai naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تِلۡكَ أُمَّةٞ قَدۡ خَلَتۡۖ لَهَا مَا كَسَبَتۡ وَلَكُم مَّا كَسَبۡتُمۡۖ وَلَا تُسۡـَٔلُونَ عَمَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Ba oyo wana nde umma[1] eleka. Bazali na lifuti ya maye basalaki, bino mpe bozali na lifuti ya maye bosalaki. Mpe bokotunama te natina ya maye bango basalaki.
[1] Umma: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ