Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūsuf   Ayah:
۞ وَمَآ أُبَرِّئُ نَفۡسِيٓۚ إِنَّ ٱلنَّفۡسَ لَأَمَّارَةُۢ بِٱلسُّوٓءِ إِلَّا مَا رَحِمَ رَبِّيٓۚ إِنَّ رَبِّي غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Mpe nakoki komilongola te. Ya sólo, molimo motindaka na mabe, longola sé oyo Nkolo wa ngai akoyokela ye mawa. Ya solo, Nkolo wa ngai azali molimbisi atonda mawa.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ ٱئۡتُونِي بِهِۦٓ أَسۡتَخۡلِصۡهُ لِنَفۡسِيۖ فَلَمَّا كَلَّمَهُۥ قَالَ إِنَّكَ ٱلۡيَوۡمَ لَدَيۡنَا مَكِينٌ أَمِينٞ
Mpe mokonzi alobi été: Boyela ngai ye azala ya ngai moko. Mpe tango asololi na mokonzi, alobaki été: Banda lelo okomi moto wa bosembo mpe ya lokumu epai na biso.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ ٱجۡعَلۡنِي عَلَىٰ خَزَآئِنِ ٱلۡأَرۡضِۖ إِنِّي حَفِيظٌ عَلِيمٞ
Alobi (Yûsuf): Tiya ngai nazala mobateli ya sanduku ya mboka, ya solo, ngai nayebi kobatela.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَكَذَٰلِكَ مَكَّنَّا لِيُوسُفَ فِي ٱلۡأَرۡضِ يَتَبَوَّأُ مِنۡهَا حَيۡثُ يَشَآءُۚ نُصِيبُ بِرَحۡمَتِنَا مَن نَّشَآءُۖ وَلَا نُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Mpe lolenge wana nde topesaki Yûsuf bokonzi na mboka wana, asalaki manso maye alingaki kosala. Topesaka ngolu na biso na nani tolingi, mpe tokobungisaka lifuta lia bato malamu te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَأَجۡرُ ٱلۡأٓخِرَةِ خَيۡرٞ لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
Mpe lifuta lia mokolo ya suka lileka kitoko тропа bandimi, mpo bazalaki kobanga.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَجَآءَ إِخۡوَةُ يُوسُفَ فَدَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَعَرَفَهُمۡ وَهُمۡ لَهُۥ مُنكِرُونَ
Mpe bandeko ba Yûsuf bayei bakoti epai naye, ayebi bango kasi bango bayebi ye te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمۡ قَالَ ٱئۡتُونِي بِأَخٖ لَّكُم مِّنۡ أَبِيكُمۡۚ أَلَا تَرَوۡنَ أَنِّيٓ أُوفِي ٱلۡكَيۡلَ وَأَنَا۠ خَيۡرُ ٱلۡمُنزِلِينَ
Mpe tango apesi bango biloko biye alengeleki тропа bango, alobi: В óyela ngai ndeko wa bino, oyo atikalaki epai ya tata wa bino. Boye bozali kornona te ete nazali kokokisa emekeli (kilo) bwa ngai Mpe nazali malamu koleka?
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن لَّمۡ تَأۡتُونِي بِهِۦ فَلَا كَيۡلَ لَكُمۡ عِندِي وَلَا تَقۡرَبُونِ
Kasi soki boyeli ngai ye te, bokozua biloko te epai na ngai, mpe bopusana pene na ngai te.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ سَنُرَٰوِدُ عَنۡهُ أَبَاهُ وَإِنَّا لَفَٰعِلُونَ
Mpe balobi: Tokomeka koyebisa tata waye. Mpe ya soló, tokomeka kosala yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقَالَ لِفِتۡيَٰنِهِ ٱجۡعَلُواْ بِضَٰعَتَهُمۡ فِي رِحَالِهِمۡ لَعَلَّهُمۡ يَعۡرِفُونَهَآ إِذَا ٱنقَلَبُوٓاْ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِمۡ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
Mpe alobi na basali baye: Botiya biloko bia bango na basaki bia bango. Mpo bakoka koyeba yango tango bakozonga kowuta na libota lia bango, mpe mpo bakoka kozonga.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَلَمَّا رَجَعُوٓاْ إِلَىٰٓ أَبِيهِمۡ قَالُواْ يَٰٓأَبَانَا مُنِعَ مِنَّا ٱلۡكَيۡلُ فَأَرۡسِلۡ مَعَنَآ أَخَانَا نَكۡتَلۡ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ
Mpe tango bazongeli tata wa bango, balobi: Oh tata wa biso! Baboyi kopesa biso biloko. Pesa biso ndeko wa biso mpo tokoka kozua biloko, mpe ya sólo, biso tokobatela ye.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūsuf
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close