Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūsuf   Ayah:
قَالَ مَعَاذَ ٱللَّهِ أَن نَّأۡخُذَ إِلَّا مَن وَجَدۡنَا مَتَٰعَنَا عِندَهُۥٓ إِنَّآ إِذٗا لَّظَٰلِمُونَ
Alobi: Allah Abátela ngai! Tokozua sé oyo tokuti ye na biloko bia biso, ya sólo soki te, tokozala o kati ya babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَلَمَّا ٱسۡتَيۡـَٔسُواْ مِنۡهُ خَلَصُواْ نَجِيّٗاۖ قَالَ كَبِيرُهُمۡ أَلَمۡ تَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ أَبَاكُمۡ قَدۡ أَخَذَ عَلَيۡكُم مَّوۡثِقٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَمِن قَبۡلُ مَا فَرَّطتُمۡ فِي يُوسُفَۖ فَلَنۡ أَبۡرَحَ ٱلۡأَرۡضَ حَتَّىٰ يَأۡذَنَ لِيٓ أَبِيٓ أَوۡ يَحۡكُمَ ٱللَّهُ لِيۖ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلۡحَٰكِمِينَ
Mpe tango elikya ya komema ye esili bango, basololi na bobombami. Mpe yaya wa bango alobi: Boye boyebi ete tata wa bino asilaki kozua elaka na bino epai ya Allah liboso тропа Yûsuf? Kasi bozangaki kokokisa yango, nakolongwa awa te kino tata wa ngai akopesa ngai ndingisa, to Allah alongisa ngai na likambo liye, mpe (ye) azali mokati malamu. (ya likambo)
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱرۡجِعُوٓاْ إِلَىٰٓ أَبِيكُمۡ فَقُولُواْ يَٰٓأَبَانَآ إِنَّ ٱبۡنَكَ سَرَقَ وَمَا شَهِدۡنَآ إِلَّا بِمَا عَلِمۡنَا وَمَا كُنَّا لِلۡغَيۡبِ حَٰفِظِينَ
Bozonga epai ya tata wa bino, mpe boloba; Oh tata wa biso! Ya soló, mwana wayo ayibi. Mpe tokotatola sé oyo toyebi, kasi, toyebi mabombami te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَسۡـَٔلِ ٱلۡقَرۡيَةَ ٱلَّتِي كُنَّا فِيهَا وَٱلۡعِيرَ ٱلَّتِيٓ أَقۡبَلۡنَا فِيهَاۖ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
Mpe tuna mboka (bato ya mboka) epai towuti, esika eye tokomelaki, mpe lisanga na biso bato ya mobembo. Ya sólo tozali penza koloba bosóló.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ بَلۡ سَوَّلَتۡ لَكُمۡ أَنفُسُكُمۡ أَمۡرٗاۖ فَصَبۡرٞ جَمِيلٌۖ عَسَى ٱللَّهُ أَن يَأۡتِيَنِي بِهِمۡ جَمِيعًاۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
Alobi (ya’qúb): Milimo mia bino mitindi bino na likambo mabe. Kasi kokanga motema ezali kitoko mpe malamu, tango mosusu Allah akozongisela ngai bango banso. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَتَوَلَّىٰ عَنۡهُمۡ وَقَالَ يَٰٓأَسَفَىٰ عَلَىٰ يُوسُفَ وَٱبۡيَضَّتۡ عَيۡنَاهُ مِنَ ٱلۡحُزۡنِ فَهُوَ كَظِيمٞ
Mpe apesi bango mokongo mpe alobi: Nazali na mawa тропа Yûsuf! Mpe miso maye matondi na pizoli na mawa, mpe ye akangi motema.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ تَٱللَّهِ تَفۡتَؤُاْ تَذۡكُرُ يُوسُفَ حَتَّىٰ تَكُونَ حَرَضًا أَوۡ تَكُونَ مِنَ ٱلۡهَٰلِكِينَ
Balobi: Na nkombo ya Allah okotika kokanisa Yûsuf te, kino mabe ekozua yo to okokufa?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ إِنَّمَآ أَشۡكُواْ بَثِّي وَحُزۡنِيٓ إِلَى ٱللَّهِ وَأَعۡلَمُ مِنَ ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
Alobi: Na paši mpe mawa na ngai, nazali komilela sé na Allah, mpe nayebi тропа Allah oyo bino boyebi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūsuf
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close