Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Yūsuf   Ayah:
فَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمۡ جَعَلَ ٱلسِّقَايَةَ فِي رَحۡلِ أَخِيهِ ثُمَّ أَذَّنَ مُؤَذِّنٌ أَيَّتُهَا ٱلۡعِيرُ إِنَّكُمۡ لَسَٰرِقُونَ
Mpe tango abongiseli bango mikumba ya bilei, atiye wolo ya emekeli na mokumba ya ndeko naye sima mobeleli abeleli bango ete: Eh bino bapaya bozali soló bayibi.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ وَأَقۡبَلُواْ عَلَيۡهِم مَّاذَا تَفۡقِدُونَ
Babaluki mpe balobi: Nini bobungisi?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ نَفۡقِدُ صُوَاعَ ٱلۡمَلِكِ وَلِمَن جَآءَ بِهِۦ حِمۡلُ بَعِيرٖ وَأَنَا۠ بِهِۦ زَعِيمٞ
Balobi: Tobungisi nkeni ya walo ya mokonzi. Tozali koluka yango na mikumba, soki nani oyo azui yango, mpe ngai nazali moyangeli.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ تَٱللَّهِ لَقَدۡ عَلِمۡتُم مَّا جِئۡنَا لِنُفۡسِدَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كُنَّا سَٰرِقِينَ
Balobi: Na Allah, boyebi malamu penza ete biso toyaki te mpo tobebisa na mboka eye, tozali mpe bayibi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ فَمَا جَزَٰٓؤُهُۥٓ إِن كُنتُمۡ كَٰذِبِينَ
Balobi: Etumbu ekozala nini soki bozali kokosa?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ جَزَٰٓؤُهُۥ مَن وُجِدَ فِي رَحۡلِهِۦ فَهُوَ جَزَٰٓؤُهُۥۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلظَّٰلِمِينَ
Balobi: Etumbu ekozala sé epai ya oyo bokokuta eloko ena (bozali koluka) na mokumba naye, wana nde lifuta lia babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَبَدَأَ بِأَوۡعِيَتِهِمۡ قَبۡلَ وِعَآءِ أَخِيهِ ثُمَّ ٱسۡتَخۡرَجَهَا مِن وِعَآءِ أَخِيهِۚ كَذَٰلِكَ كِدۡنَا لِيُوسُفَۖ مَا كَانَ لِيَأۡخُذَ أَخَاهُ فِي دِينِ ٱلۡمَلِكِ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ نَرۡفَعُ دَرَجَٰتٖ مَّن نَّشَآءُۗ وَفَوۡقَ كُلِّ ذِي عِلۡمٍ عَلِيمٞ
Mpe abandaki na mikumba na bango liboso, na sima abandi na oyo ya ndeko naye mpe akutaki yango na mokumba ya ndeko naye. Ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf, kasi alingaki kokanga ndeko waye te, engebene na mobeko mwa mokonzi, longola sé maye Allah alingaki. Totombolaka bisika bia baye tolingi, mpe likolo lia moto nyoso topesi ye boyebi, okokuta oyo aleki ye na boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ قَالُوٓاْ إِن يَسۡرِقۡ فَقَدۡ سَرَقَ أَخٞ لَّهُۥ مِن قَبۡلُۚ فَأَسَرَّهَا يُوسُفُ فِي نَفۡسِهِۦ وَلَمۡ يُبۡدِهَا لَهُمۡۚ قَالَ أَنتُمۡ شَرّٞ مَّكَانٗاۖ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا تَصِفُونَ
Balobi: Soki ayibi, (alandi) sé ndeko naye asilaki mpe koyiba liboso. Mpe Yûsuf, ayokaki yango mpasi na motema, kasi amonisaki bango yango te, mpe alobi na motema ete: Mabe na bino oyo eleki, mpe Allah ayebi maye bozali koloba.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡعَزِيزُ إِنَّ لَهُۥٓ أَبٗا شَيۡخٗا كَبِيرٗا فَخُذۡ أَحَدَنَا مَكَانَهُۥٓۖ إِنَّا نَرَىٰكَ مِنَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Balobi: Eh mokonzi! Tata waye azali mobange wa kala. Zua moko o kati na biso na esika naye. Ya soló, tozali kornona yo o kati ya babongisi.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Yūsuf
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close