Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-কাহাফ   আয়াত:
فَلَمَّا جَاوَزَا قَالَ لِفَتَىٰهُ ءَاتِنَا غَدَآءَنَا لَقَدۡ لَقِينَا مِن سَفَرِنَا هَٰذَا نَصَبٗا
Mpe tango bango banso babale baleki (esika) ena, alobi na mosali waye: Yela biso biloko bia biso ya kolia, tosili kolembe na mobembo mwa biso moye.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ أَرَءَيۡتَ إِذۡ أَوَيۡنَآ إِلَى ٱلصَّخۡرَةِ فَإِنِّي نَسِيتُ ٱلۡحُوتَ وَمَآ أَنسَىٰنِيهُ إِلَّا ٱلشَّيۡطَٰنُ أَنۡ أَذۡكُرَهُۥۚ وَٱتَّخَذَ سَبِيلَهُۥ فِي ٱلۡبَحۡرِ عَجَبٗا
(Elenge wa ye) alobaki: Omoni tango tofandaki pene ya libanga ya monene nabosanaki mbisi kuna, satana nde abosanisi ngai mpo nakanisa yango te, mpe (Mûssa) azongaki sima тропа kolanda nzela ya ebale na kokamwa.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ ذَٰلِكَ مَا كُنَّا نَبۡغِۚ فَٱرۡتَدَّا عَلَىٰٓ ءَاثَارِهِمَا قَصَصٗا
(Mûssa) alobi: Wana nde oyo tozalaki koluka, mpe babongoli makolo ma bango balandi bilembo bia yango bazali kosolola.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَوَجَدَا عَبۡدٗا مِّنۡ عِبَادِنَآ ءَاتَيۡنَٰهُ رَحۡمَةٗ مِّنۡ عِندِنَا وَعَلَّمۡنَٰهُ مِن لَّدُنَّا عِلۡمٗا
Mpe bakutaki mowumbu wa biso, oyo topesaki ye ngolu ma biso, mpe totangisaki ye boyebi bonene.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ لَهُۥ مُوسَىٰ هَلۡ أَتَّبِعُكَ عَلَىٰٓ أَن تُعَلِّمَنِ مِمَّا عُلِّمۡتَ رُشۡدٗا
Mûssa ayebisi ye: Boye nalanda yo mpo otangisa ngai boyebi boye otangisama ya bosôló?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ إِنَّكَ لَن تَسۡتَطِيعَ مَعِيَ صَبۡرٗا
(Moto wana) alobi na Mûssa ete: Okokoka kokanga motema elongo na ngai te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَكَيۡفَ تَصۡبِرُ عَلَىٰ مَا لَمۡ تُحِطۡ بِهِۦ خُبۡرٗا
Ndenge nini okokoka kokanga motema na maye (makambo) oyo ozali na boyebi na yango te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ صَابِرٗا وَلَآ أَعۡصِي لَكَ أَمۡرٗا
(Mûssa) alobi: Na bolingi bwa Allah, okomona ngai na kangi motema. Mpe nakoboyaka mobeko nayo ata moko te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ فَإِنِ ٱتَّبَعۡتَنِي فَلَا تَسۡـَٔلۡنِي عَن شَيۡءٍ حَتَّىٰٓ أُحۡدِثَ لَكَ مِنۡهُ ذِكۡرٗا
Alobi: Soki olandi ngai kotuna ngai eloko te kino nakoyebisa yo ntina na yango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱنطَلَقَا حَتَّىٰٓ إِذَا رَكِبَا فِي ٱلسَّفِينَةِ خَرَقَهَاۖ قَالَ أَخَرَقۡتَهَا لِتُغۡرِقَ أَهۡلَهَا لَقَدۡ جِئۡتَ شَيۡـًٔا إِمۡرٗا
Bakei bango mibale, tango bamati na masuwa (bwato) abebisi yango, (Mûssa) alobi: Obebisi yango mpo ozindisa bakolo na yango? O sali mpenza likambo linene!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ أَلَمۡ أَقُلۡ إِنَّكَ لَن تَسۡتَطِيعَ مَعِيَ صَبۡرٗا
(Wana) alobi: Nayebisaki yo te ete: Okokoka kokanga motema te elongo na nga?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ لَا تُؤَاخِذۡنِي بِمَا نَسِيتُ وَلَا تُرۡهِقۡنِي مِنۡ أَمۡرِي عُسۡرٗا
(Mûssa) alobi: Kornona ngai mabe te na ndenge nabosani, mpe kotelema makasi te тропа likambo lia ngai.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱنطَلَقَا حَتَّىٰٓ إِذَا لَقِيَا غُلَٰمٗا فَقَتَلَهُۥ قَالَ أَقَتَلۡتَ نَفۡسٗا زَكِيَّةَۢ بِغَيۡرِ نَفۡسٖ لَّقَدۡ جِئۡتَ شَيۡـٔٗا نُّكۡرٗا
Bakei bango banso babale, kino bakutanaki na mwana mobali, mpe abomi ye. (Mûssa) alobi: Obomi moto sé pamba boye, oyo asali eloko te? Osali soló mabe monene.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-কাহাফ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ