Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-কাহাফ   আয়াত:
ٱلۡمَالُ وَٱلۡبَنُونَ زِينَةُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَٱلۡبَٰقِيَٰتُ ٱلصَّٰلِحَٰتُ خَيۡرٌ عِندَ رَبِّكَ ثَوَابٗا وَخَيۡرٌ أَمَلٗا
Bomengo mpe bana, ezali bisengo ya nsé, kasi misala ya malamu miye misilaka te, yango nde ezali na lifuta ya malamu mpe elikia ya kitoko epayi ya Nkolo nayo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَيَوۡمَ نُسَيِّرُ ٱلۡجِبَالَ وَتَرَى ٱلۡأَرۡضَ بَارِزَةٗ وَحَشَرۡنَٰهُمۡ فَلَمۡ نُغَادِرۡ مِنۡهُمۡ أَحَدٗا
Mpe mokolo moye tokotambwisaka bangomba, okomona mabele ekotandama polele, mpe tokosangisa bango mpe tokobosana moko te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَعُرِضُواْ عَلَىٰ رَبِّكَ صَفّٗا لَّقَدۡ جِئۡتُمُونَا كَمَا خَلَقۡنَٰكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةِۭۚ بَلۡ زَعَمۡتُمۡ أَلَّن نَّجۡعَلَ لَكُم مَّوۡعِدٗا
Мре bakotelemaka molongo liboso lia Nkolo wayo, boyeli biso lolenge tokelaki bino mbala ya yambo, kasi bokanisaki ete tokokokisela bino elaka te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَوُضِعَ ٱلۡكِتَٰبُ فَتَرَى ٱلۡمُجۡرِمِينَ مُشۡفِقِينَ مِمَّا فِيهِ وَيَقُولُونَ يَٰوَيۡلَتَنَا مَالِ هَٰذَا ٱلۡكِتَٰبِ لَا يُغَادِرُ صَغِيرَةٗ وَلَا كَبِيرَةً إِلَّآ أَحۡصَىٰهَاۚ وَوَجَدُواْ مَا عَمِلُواْ حَاضِرٗاۗ وَلَا يَظۡلِمُ رَبُّكَ أَحَدٗا
Mpe bakotiyaka buku (ya moto na moto) mpe okomona batomboki bazali kobanga maye makomami na kati, mpe bakolobaka: Mabe na biso, buku eye etikaki eloko te, ezala moke to ya monene sé ekomaki yango. Mpe bakokutaka maye basalaki polele, kasi Nkolo wayo abubaka moto te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ قُلۡنَا لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ ٱسۡجُدُواْ لِأٓدَمَ فَسَجَدُوٓاْ إِلَّآ إِبۡلِيسَ كَانَ مِنَ ٱلۡجِنِّ فَفَسَقَ عَنۡ أَمۡرِ رَبِّهِۦٓۗ أَفَتَتَّخِذُونَهُۥ وَذُرِّيَّتَهُۥٓ أَوۡلِيَآءَ مِن دُونِي وَهُمۡ لَكُمۡ عَدُوُّۢۚ بِئۡسَ لِلظَّٰلِمِينَ بَدَلٗا
Mpe tango tolobaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, bagumbamaki, longola sé satana azalaki kati ya ba djini mpe aboyaki kotosa mobeko mwa Nkolo wa ye. Boye bokozua ye na libota lia ye mpo bazala babateli na botiki ngai mpe bazali banguna ya bino? Oyo коропа ya mabe тропа babubi!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ مَّآ أَشۡهَدتُّهُمۡ خَلۡقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَا خَلۡقَ أَنفُسِهِمۡ وَمَا كُنتُ مُتَّخِذَ ٱلۡمُضِلِّينَ عَضُدٗا
Nazuaki bango te banzeneneke na bokeli mapata na mabele, ndenge moko kokelama na bango, mpe na koki te kozua babungisi тропа kosalisa nga.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَيَوۡمَ يَقُولُ نَادُواْ شُرَكَآءِيَ ٱلَّذِينَ زَعَمۡتُمۡ فَدَعَوۡهُمۡ فَلَمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَهُمۡ وَجَعَلۡنَا بَيۡنَهُم مَّوۡبِقٗا
Mpe o mokolo moye akolobaka: Bobenga basangani na ngai baye bolikiaki, bakobengaka bango kasi bakoyanolaka bango te, mpe tokotiyaka kati kati na bango libulu lia bobungisi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَرَءَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ ٱلنَّارَ فَظَنُّوٓاْ أَنَّهُم مُّوَاقِعُوهَا وَلَمۡ يَجِدُواْ عَنۡهَا مَصۡرِفٗا
Mpe batomboki bakomonaka moto, mpe bakondimaka ete bakokweya na yango, kasi bakozuaka esika ya bokimi te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-কাহাফ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ