Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-কাহাফ   আয়াত:
قَالَ هَٰذَا رَحۡمَةٞ مِّن رَّبِّيۖ فَإِذَا جَآءَ وَعۡدُ رَبِّي جَعَلَهُۥ دَكَّآءَۖ وَكَانَ وَعۡدُ رَبِّي حَقّٗا
Alobi: Oyo ezali ngolu kowuta epai ya Nkolo wa ngai, tango elaka ya Nkolo wa ngai ekoyaka, akolalisa yango mpe akosukisa yango, mpe elaka ya Nkolo wa ngai ezalaka solo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ وَتَرَكۡنَا بَعۡضَهُمۡ يَوۡمَئِذٖ يَمُوجُ فِي بَعۡضٖۖ وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِ فَجَمَعۡنَٰهُمۡ جَمۡعٗا
Mpe totikaki bazali kotepatepa bango na bango, mpe bakobetaka kelelo mpe tokosangisa bango banso.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَعَرَضۡنَا جَهَنَّمَ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡكَٰفِرِينَ عَرۡضًا
Мре mokolo mona tokolakisaka bapengwi moto mwa lifelo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِينَ كَانَتۡ أَعۡيُنُهُمۡ فِي غِطَآءٍ عَن ذِكۡرِي وَكَانُواْ لَا يَسۡتَطِيعُونَ سَمۡعًا
Baye miso ma bango mazalaki ya kozipama тропа likanisi na ngai, mpe bazalaki kokoka koyoka te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَفَحَسِبَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَن يَتَّخِذُواْ عِبَادِي مِن دُونِيٓ أَوۡلِيَآءَۚ إِنَّآ أَعۡتَدۡنَا جَهَنَّمَ لِلۡكَٰفِرِينَ نُزُلٗا
Baye bapengwa bazali kokanisa ete bawumbu ba ngai bazuela ngai bambanda basusu batika ngai? Ya soló, tolengeli moto mwa lifelo ekozala esika ya kovanda тропа bapengwi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُلۡ هَلۡ نُنَبِّئُكُم بِٱلۡأَخۡسَرِينَ أَعۡمَٰلًا
Loba: Boye bolingi toyebisa bino ba nani oyo bazali na bozangi monene koleka kati na misala?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِينَ ضَلَّ سَعۡيُهُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَهُمۡ يَحۡسَبُونَ أَنَّهُمۡ يُحۡسِنُونَ صُنۡعًا
Baye misala mia bango mibebaki kati na bomoyi bwa mokili, mpe bazalaki kokanisa ete basalaki bolamu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ وَلِقَآئِهِۦ فَحَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فَلَا نُقِيمُ لَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَزۡنٗا
Baye bana baboyaki kondima na bilembo bia Nkolo wa bango mpe bokutani naye, misala mia bango ebebi, tokotiyelaka bango kilo o mokolo mwa suka te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ذَٰلِكَ جَزَآؤُهُمۡ جَهَنَّمُ بِمَا كَفَرُواْ وَٱتَّخَذُوٓاْ ءَايَٰتِي وَرُسُلِي هُزُوًا
Moto mwa lifelo mokozalaka lifuta lia bango na maye bapengwaki na yango, basakanaki na bilembo na ngai mpe batindami ba ngai.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ كَانَتۡ لَهُمۡ جَنَّٰتُ ٱلۡفِرۡدَوۡسِ نُزُلًا
Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, esika ya kovanda na bango ekozalaka na paladizo ya likolo koleka (al firdawsi).
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
خَٰلِدِينَ فِيهَا لَا يَبۡغُونَ عَنۡهَا حِوَلٗا
Libela kati na yango, bakolikia mbongwana te kati na yango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُل لَّوۡ كَانَ ٱلۡبَحۡرُ مِدَادٗا لِّكَلِمَٰتِ رَبِّي لَنَفِدَ ٱلۡبَحۡرُ قَبۡلَ أَن تَنفَدَ كَلِمَٰتُ رَبِّي وَلَوۡ جِئۡنَا بِمِثۡلِهِۦ مَدَدٗا
Loba: Soki ebale ya monene ezalaki lokola mayi ya mokanda, (тропа кокота na yango) maloba та Nkolo wa ngai (Allah), elingaki kokawuka liboso, mpe maloba ya Nkolo nangai esili te, ata soki toyei na ebale mosusu lokola yango mbala ebele.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُلۡ إِنَّمَآ أَنَا۠ بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يُوحَىٰٓ إِلَيَّ أَنَّمَآ إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۖ فَمَن كَانَ يَرۡجُواْ لِقَآءَ رَبِّهِۦ فَلۡيَعۡمَلۡ عَمَلٗا صَٰلِحٗا وَلَا يُشۡرِكۡ بِعِبَادَةِ رَبِّهِۦٓ أَحَدَۢا
Loba: Ya sólo, nazali moto lokola bino, bakitiseli ngai emoniseli, ya soló Nzambe wa bino azali Nzambe moko, ya soló, oyo asengeli na mabondeli na oyo akolikia kokutana, na Nkolo waye, asala misala milamu, mpe asangisa libondeli lia Nkolo waye na eloko moko te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-কাহাফ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ