Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: بەقەرە   ئايەت:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱلَّذِينَ هَادُواْ وَٱلنَّصَٰرَىٰ وَٱلصَّٰبِـِٔينَ مَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَلَهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
Ya sôló, baye bandima mpe baye bamikomisi bayuda mpe baklisto na baswâbi-îna[1] oyo akondima na Allah mpe na mokolo mwa suka mpe asali misala ya malamu, bakofutama epai ya Nkolo wa bango, mpe bakozala na bobangi te, mpe mawa te.
[1] Baswâbi-îna: Bazali bayuda te mpe baklisto te, kasi bazali ba sangisi Allah.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَإِذۡ أَخَذۡنَا مِيثَٰقَكُمۡ وَرَفَعۡنَا فَوۡقَكُمُ ٱلطُّورَ خُذُواْ مَآ ءَاتَيۡنَٰكُم بِقُوَّةٖ وَٱذۡكُرُواْ مَا فِيهِ لَعَلَّكُمۡ تَتَّقُونَ
Mpe bokanisa mikano miye tozuelaki bino, mpe totombolaki likolo na bino ngomba, bosimba maye topesi bino makasi mpe bokanisa maye mazali na kati na yango mpo ete bozala na bobangi (ya Allah).
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
ثُمَّ تَوَلَّيۡتُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَۖ فَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ لَكُنتُم مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
Sima bopesaki yango mokongo, mpe soki ezalaki bolamu ya Allah likolo ya bino mpe mawa naye te, nde bolingaki bozala na molongo ya bazangi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلَّذِينَ ٱعۡتَدَوۡاْ مِنكُمۡ فِي ٱلسَّبۡتِ فَقُلۡنَا لَهُمۡ كُونُواْ قِرَدَةً خَٰسِـِٔينَ
Mpe ya sôló boyebaki baye oyo balekisaki ndelo na kati ya bino mpona mokolo mwa mposo, mpe tolobaki na bango: bozala bamakako biloko bizangi ntina.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَجَعَلۡنَٰهَا نَكَٰلٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهَا وَمَا خَلۡفَهَا وَمَوۡعِظَةٗ لِّلۡمُتَّقِينَ
Mpe totiaki yango ezala ndakisa mpona bingumba biye bizalaki zingazinga na yango mpe ezalaki toli mpona babangi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦٓ إِنَّ ٱللَّهَ يَأۡمُرُكُمۡ أَن تَذۡبَحُواْ بَقَرَةٗۖ قَالُوٓاْ أَتَتَّخِذُنَا هُزُوٗاۖ قَالَ أَعُوذُ بِٱللَّهِ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Ya sôló, Allah apesi na bino mobeko ete: Boboma ngombe. Balobaki: yo ozali kozua biso na maseki? (Mûssa) alobaki ete: Na mibateli epai ya Allah mpo ete nazala te na molongo ya bazoba.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا هِيَۚ قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ لَّا فَارِضٞ وَلَا بِكۡرٌ عَوَانُۢ بَيۡنَ ذَٰلِكَۖ فَٱفۡعَلُواْ مَا تُؤۡمَرُونَ
Balobaki: Sengela biso Nkolo nayo alakisa biso ngombe wana ezali ndenge nini. (Mûssa) alobi: Ya sôló ye Nkolo alobi: Ya sôló ngombe wana ezali mobange te mpe elenge te, ezali na kati kati ya wana. Mpe bosala maye botindami.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا لَوۡنُهَاۚ قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ صَفۡرَآءُ فَاقِعٞ لَّوۡنُهَا تَسُرُّ ٱلنَّٰظِرِينَ
Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa biso polele langi na yango ezali nini. (Mûssa) alobaki: Ya sôló ye Nkolo na bino alobi: Ya sôló ngombe wana ezali na langi ya mosaka ya makasi[1] esepelisa bato tango bakomona yango.
[1] Mayi ya mosaka.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: بەقەرە
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش