Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: بەقەرە   ئايەت:
وَلَا تَقُولُواْ لِمَن يُقۡتَلُ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَمۡوَٰتُۢۚ بَلۡ أَحۡيَآءٞ وَلَٰكِن لَّا تَشۡعُرُونَ
Mpe boloba te ete: baye bakufa na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali na bomoi, kasi bozali koyeba te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَنَبۡلُوَنَّكُم بِشَيۡءٖ مِّنَ ٱلۡخَوۡفِ وَٱلۡجُوعِ وَنَقۡصٖ مِّنَ ٱلۡأَمۡوَٰلِ وَٱلۡأَنفُسِ وَٱلثَّمَرَٰتِۗ وَبَشِّرِ ٱلصَّٰبِرِينَ
Mpe ya sôló, tokomeka bino na eloko kowuta na bobangi, mpe na nzala, mpe kokutola misolo, mpe milimo, mpe milona na bino; mpe pesa sango elamu na baye bakangi mitema.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
ٱلَّذِينَ إِذَآ أَصَٰبَتۡهُم مُّصِيبَةٞ قَالُوٓاْ إِنَّا لِلَّهِ وَإِنَّآ إِلَيۡهِ رَٰجِعُونَ
Ba oyo o tango mpasi ekomeli bango, bakolobaka: Ya sôló tozali ya Allah mpe ya sôló epai naye nde tokozonga.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
أُوْلَٰٓئِكَ عَلَيۡهِمۡ صَلَوَٰتٞ مِّن رَّبِّهِمۡ وَرَحۡمَةٞۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُهۡتَدُونَ
Ba oyo wana bakozua mapamboli mpe ngolu kowuta na Nkolo wa bango, mpe bango nde bakambami.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
۞ إِنَّ ٱلصَّفَا وَٱلۡمَرۡوَةَ مِن شَعَآئِرِ ٱللَّهِۖ فَمَنۡ حَجَّ ٱلۡبَيۡتَ أَوِ ٱعۡتَمَرَ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡهِ أَن يَطَّوَّفَ بِهِمَاۚ وَمَن تَطَوَّعَ خَيۡرٗا فَإِنَّ ٱللَّهَ شَاكِرٌ عَلِيمٌ
Ya sôló ngomba ya Swafâ na Mar’wa[1] ezali kati ya bilembo ya Allah. Mpe oyo akosala mobembo enene o ndako esantu, too mobembo eke, ezali lisumu te mpona ye kotambola kati kati ya ngomba wana mibale. Kasi oyo akobakisa bolamu mosusu, ya sôló Allah azali wa botondi atonda boyebi.
[1] Swafá na Mar’wa: Ezali bakombo ya ngomba mibale oyo ezali penepene na ndako esanto na Makkah.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَكۡتُمُونَ مَآ أَنزَلۡنَا مِنَ ٱلۡبَيِّنَٰتِ وَٱلۡهُدَىٰ مِنۢ بَعۡدِ مَا بَيَّنَّٰهُ لِلنَّاسِ فِي ٱلۡكِتَٰبِ أُوْلَٰٓئِكَ يَلۡعَنُهُمُ ٱللَّهُ وَيَلۡعَنُهُمُ ٱللَّٰعِنُونَ
Ya sôló ba oyo bazali kobomba maye tokitisaki kowuta na polele mpe bokambi na sima ya kolakisa polele na yango mpona bato okati ya buku, bango nde bakozua botutu ya Allah, mpe balakeli bakolakela bango botutu.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِلَّا ٱلَّذِينَ تَابُواْ وَأَصۡلَحُواْ وَبَيَّنُواْ فَأُوْلَٰٓئِكَ أَتُوبُ عَلَيۡهِمۡ وَأَنَا ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
Longola sé ba oyo bakotubela, mpe babongisi, mpe balimboli bosôló, bango wana nde ngai[1] nakondima tubela na bango, mpe ngai nde moyambi ya tubela moyoki mawa.
[1] Allah.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَمَاتُواْ وَهُمۡ كُفَّارٌ أُوْلَٰٓئِكَ عَلَيۡهِمۡ لَعۡنَةُ ٱللَّهِ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ وَٱلنَّاسِ أَجۡمَعِينَ
Ya sôló baye bapengwi mpe liwa ezui bango na kati ya bopengwi bango wana nde botutu ya Allah, na ba anzelu na ya bato nyonso ezali likolo na bango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
خَٰلِدِينَ فِيهَا لَا يُخَفَّفُ عَنۡهُمُ ٱلۡعَذَابُ وَلَا هُمۡ يُنظَرُونَ
Libela o kati na móto, etumbu na bango ekokutolama ata moke te mpe bakopemisama te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَإِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞۖ لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلرَّحۡمَٰنُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe Nzambe na bino azali sé Nzambe moko. Mosusu azali te sé ye,[1] azali wa ngolu atonda boboto.
[1] Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye Allah.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: بەقەرە
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش