Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: بەقەرە   ئايەت:
قُلۡ إِن كَانَتۡ لَكُمُ ٱلدَّارُ ٱلۡأٓخِرَةُ عِندَ ٱللَّهِ خَالِصَةٗ مِّن دُونِ ٱلنَّاسِ فَتَمَنَّوُاْ ٱلۡمَوۡتَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Loba: Soki efandeli ya mokolo ya suka epai na Allah ezali sé mpo na bino moko bato mosusu te, bosenga liwa soki bozali na bosembo.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَن يَتَمَنَّوۡهُ أَبَدَۢا بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡۚ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe bakondimaka yango te na mbeba oyo basalaki. Mpe Allah nde moyebi ya babubi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَتَجِدَنَّهُمۡ أَحۡرَصَ ٱلنَّاسِ عَلَىٰ حَيَوٰةٖ وَمِنَ ٱلَّذِينَ أَشۡرَكُواْۚ يَوَدُّ أَحَدُهُمۡ لَوۡ يُعَمَّرُ أَلۡفَ سَنَةٖ وَمَا هُوَ بِمُزَحۡزِحِهِۦ مِنَ ٱلۡعَذَابِ أَن يُعَمَّرَۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِمَا يَعۡمَلُونَ
Mpe ya sôló, okokuta bango bazali nabokengeli makasi mpona bomoyi ya nsé koleka kutu basambeli bikeko. Moko kati na bango akosepela ete awumela mbula nkoto moko; kasi yango ekobatela ye na etumbu te soki awumeli mingi; mpe Allah azali komona maye bazali kosala.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قُلۡ مَن كَانَ عَدُوّٗا لِّـجِبۡرِيلَ فَإِنَّهُۥ نَزَّلَهُۥ عَلَىٰ قَلۡبِكَ بِإِذۡنِ ٱللَّهِ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَهُدٗى وَبُشۡرَىٰ لِلۡمُؤۡمِنِينَ
Loba: Oyo akozala monguna ya (anzelu) djibril, kasi ya sôló ye akitisaki yango[1] na motema nayo na ndingisa ya Allah, mpe ezali kondima na maye ekitaki liboso; yango ezali bokambemi mpe bopesi sango elamu mpona bandimi.
[1] Buku ya Allah (kurani).
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
مَن كَانَ عَدُوّٗا لِّلَّهِ وَمَلَٰٓئِكَتِهِۦ وَرُسُلِهِۦ وَجِبۡرِيلَ وَمِيكَىٰلَ فَإِنَّ ٱللَّهَ عَدُوّٞ لِّلۡكَٰفِرِينَ
Oyo akozala monguna na Allah, mpe ba anzelu naye, mpe batindami naye, mpe Djibril na Mîkâl, mpe ya sôló Allah azali monguna ya bapengwi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَقَدۡ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ءَايَٰتِۭ بَيِّنَٰتٖۖ وَمَا يَكۡفُرُ بِهَآ إِلَّا ٱلۡفَٰسِقُونَ
Mpe tosilaki kokitisa epai nayo bilembo bia polele. Mpe bakopengwaka na yango te sé bobele bato ya mabe.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
أَوَكُلَّمَا عَٰهَدُواْ عَهۡدٗا نَّبَذَهُۥ فَرِيقٞ مِّنۡهُمۚ بَلۡ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
mpe tango inso bazali kozua elaka; eteni mosusu kati na bango bazali kobebisa yango? Kasi ebele na bango bazali kondima te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَمَّا جَآءَهُمۡ رَسُولٞ مِّنۡ عِندِ ٱللَّهِ مُصَدِّقٞ لِّمَا مَعَهُمۡ نَبَذَ فَرِيقٞ مِّنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ كِتَٰبَ ٱللَّهِ وَرَآءَ ظُهُورِهِمۡ كَأَنَّهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
Mpe tango motindami ayelaki bango kowuta epai ya Allah, na bosôló ya maye bazalaki na yango, molongo moko okati ya ba oyo bazuaki buku ya Allah babwaki yango sima ya mikongo mia bango, lokola bango bayebi te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: بەقەرە
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش