Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: آل عمران   آیت:
وَيُكَلِّمُ ٱلنَّاسَ فِي ٱلۡمَهۡدِ وَكَهۡلٗا وَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe Akoloba na bato wuta mbotama naye, mpe tango akokola, mpe azali kati na bato ya malamu.
عربي تفسیرونه:
قَالَتۡ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي وَلَدٞ وَلَمۡ يَمۡسَسۡنِي بَشَرٞۖ قَالَ كَذَٰلِكِ ٱللَّهُ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ إِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
(Maryam) alobi: (Nkolo ya sôló ndenge nini nakobota mpe ngai nasangani na mobali te?). Alobi: (Anzelu) (ndenge wana nde Allah akelaka maye alingi. Soki azwi mokano ya likambo, akoloba: “Zala”, Mpe lizalisami.
عربي تفسیرونه:
وَيُعَلِّمُهُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَٱلتَّوۡرَىٰةَ وَٱلۡإِنجِيلَ
Mpe akotangisa ye buku, mpe bwanya, mpe torah[1] mpe indjil.[1]
[1] Bótala mokapo 2.
عربي تفسیرونه:
وَرَسُولًا إِلَىٰ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ أَنِّي قَدۡ جِئۡتُكُم بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ أَنِّيٓ أَخۡلُقُ لَكُم مِّنَ ٱلطِّينِ كَهَيۡـَٔةِ ٱلطَّيۡرِ فَأَنفُخُ فِيهِ فَيَكُونُ طَيۡرَۢا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۖ وَأُبۡرِئُ ٱلۡأَكۡمَهَ وَٱلۡأَبۡرَصَ وَأُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۖ وَأُنَبِّئُكُم بِمَا تَأۡكُلُونَ وَمَا تَدَّخِرُونَ فِي بُيُوتِكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لَّكُمۡ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
Mpe motindami epai ya bana Isalayele, (akoloba na bango été): Ya sôló, ngai nayeli bino elembo mpe ekamwiseli kowuta epayi na Nkolo wa bino. Ete ngai nakosalela bino mabele ya potopoto na lolenge ya ndeke, mpe nakofula na kati mpe ekokoma ndeke na ndingisa ya Allah. Mpe na kobikisa bato bakufa miso, mpe ya bokono ya maba. Mpe na kosekwisa bawa na ndingisa ya Allah. Mpe nakoyebisa bino bilei nini bokolia mpe bankita bozali kosangisa yango okati ya bandako na bino. Ya sôló nyoso wana ezali elembo mpe mateya mpona bino, soki ya sôló bozali bandimi.
عربي تفسیرونه:
وَمُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيَّ مِنَ ٱلتَّوۡرَىٰةِ وَلِأُحِلَّ لَكُم بَعۡضَ ٱلَّذِي حُرِّمَ عَلَيۡكُمۡۚ وَجِئۡتُكُم بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
Mpe nandimi na maye mazuamaki na torah[1] mpe nakopesa bino ndingisa mpona kolia maye bapekisaki bino. Mpe nayeli bino elembo kowuta na Nkolo wa bino. Mpe bobanga Allah mpe botosa ngai.
[1] Buku oyo ekitaki epaí ya Mûssa.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ ٱللَّهَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
Ya sôló, Allah azali Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Bobondela ye, oyo nde nzela ya semba.
عربي تفسیرونه:
۞ فَلَمَّآ أَحَسَّ عِيسَىٰ مِنۡهُمُ ٱلۡكُفۡرَ قَالَ مَنۡ أَنصَارِيٓ إِلَى ٱللَّهِۖ قَالَ ٱلۡحَوَارِيُّونَ نَحۡنُ أَنصَارُ ٱللَّهِ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَٱشۡهَدۡ بِأَنَّا مُسۡلِمُونَ
Mpe tango Issa amonaki bopengwi na bango, alobaki ete: Banani bakosunga ngai na nzela ya Allah? Bayekoli naye bayanolaki na koloba été: Biso tozali basungi nayo na nzela ya Allah tondimi na Allah. Mpe yo (Issa) zala nzeneneke na biso ete ya sôló tosili komisokia.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: آل عمران
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول