Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: آل عمران   آیت:
هُنَالِكَ دَعَا زَكَرِيَّا رَبَّهُۥۖ قَالَ رَبِّ هَبۡ لِي مِن لَّدُنكَ ذُرِّيَّةٗ طَيِّبَةًۖ إِنَّكَ سَمِيعُ ٱلدُّعَآءِ
Na tango wana, Zakariya asengi Nkolo wa ye, alobaki ete: Nkolo, pesa ngai libota ya malamu kowuta epai nayo. Ya sôló ozali moyoki Mabondeli[2].
[2] Bótala mokapo 37.
عربي تفسیرونه:
فَنَادَتۡهُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَهُوَ قَآئِمٞ يُصَلِّي فِي ٱلۡمِحۡرَابِ أَنَّ ٱللَّهَ يُبَشِّرُكَ بِيَحۡيَىٰ مُصَدِّقَۢا بِكَلِمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَسَيِّدٗا وَحَصُورٗا وَنَبِيّٗا مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Ba anzelu babengaki ye tango ye atelemaki azali kosambela na kati ya Mihrab,[2] balobaki naye ete: Ya sôló Allah apesi yo sango elamu ya mbotama ya Yahya, ye oyo akondima na liloba ya Allah. Mpe akozala mokonzi mpe moto ya kilikili te, mpe moto ya ekobo te, mpe akozala ntoma o’kati ya bato ya malamu.
[2] Bótala mokapo 37.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي غُلَٰمٞ وَقَدۡ بَلَغَنِيَ ٱلۡكِبَرُ وَٱمۡرَأَتِي عَاقِرٞۖ قَالَ كَذَٰلِكَ ٱللَّهُ يَفۡعَلُ مَا يَشَآءُ
Mpe alobi ete: Eh Nkolo! Ndenge nini nakozua mwana mpe ngai nasili kokoma mobange, mpe mwasi na ngai abotaka te? (Allah) alobi: Ndenge wana nde, Allah asalaka oyo alingi.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ ٱجۡعَل لِّيٓ ءَايَةٗۖ قَالَ ءَايَتُكَ أَلَّا تُكَلِّمَ ٱلنَّاسَ ثَلَٰثَةَ أَيَّامٍ إِلَّا رَمۡزٗاۗ وَٱذۡكُر رَّبَّكَ كَثِيرٗا وَسَبِّحۡ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِبۡكَٰرِ
(Zakariya) alobaki ete: Nkolo! Pesa ngai elembo na yango. (Allah) alobi ete: Elembo nayo ete mikolo misato okosolola na bato te sé na bilembo. Na sima okanisa Nkolo wayo mingi, mpe sanzola ye na ntongo mpe mpokua.
عربي تفسیرونه:
وَإِذۡ قَالَتِ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَٰمَرۡيَمُ إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰكِ وَطَهَّرَكِ وَٱصۡطَفَىٰكِ عَلَىٰ نِسَآءِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe lisusu kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló Allah aponi yo mpe apetoli yo, mpe atomboli yo yambo ya basi banso ya mokili.[1]
[1] Na ndembe naye.
عربي تفسیرونه:
يَٰمَرۡيَمُ ٱقۡنُتِي لِرَبِّكِ وَٱسۡجُدِي وَٱرۡكَعِي مَعَ ٱلرَّٰكِعِينَ
Eh Maryam! Zala na botosi epai na Nkolo nayo, gumbama mpe fukama (o tia elongi nayo na mabele) elongo moko na bagumbami.
عربي تفسیرونه:
ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهِ إِلَيۡكَۚ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ يُلۡقُونَ أَقۡلَٰمَهُمۡ أَيُّهُمۡ يَكۡفُلُ مَرۡيَمَ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ يَخۡتَصِمُونَ
Wana ezali basango mabombami tozali kopesa yo yango. Mpe ozalaki te epai na bango tango bazalaki ko buaka bikomeli bia bango mpona koyeba nani akozua mokumba ya kobokolo Maryam, mpe yo ozalaki te tango bazalaki kosuana.
عربي تفسیرونه:
إِذۡ قَالَتِ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَٰمَرۡيَمُ إِنَّ ٱللَّهَ يُبَشِّرُكِ بِكَلِمَةٖ مِّنۡهُ ٱسۡمُهُ ٱلۡمَسِيحُ عِيسَى ٱبۡنُ مَرۡيَمَ وَجِيهٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló, Allah azali kopesa yo sango elamu ya liloba kowuta epai naye (Allah), nkombo naye ekozala Masiya Issa, mwana ya Maryam, akozala na lokumu awa na nsé mpe na lola, mpe azali moko kati na baye bazali penepene (na Allah).
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: آل عمران
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول