Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: آل عمران   آیت:
وَمَآ أَصَٰبَكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡتَقَى ٱلۡجَمۡعَانِ فَبِإِذۡنِ ٱللَّهِ وَلِيَعۡلَمَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Mpe oyo ezuaki bino mokolo mampinga mibale makutanaki na ndingisa ya Allah, mpo ayeba banani bazali bandimi.
عربي تفسیرونه:
وَلِيَعۡلَمَ ٱلَّذِينَ نَافَقُواْۚ وَقِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ قَٰتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَوِ ٱدۡفَعُواْۖ قَالُواْ لَوۡ نَعۡلَمُ قِتَالٗا لَّٱتَّبَعۡنَٰكُمۡۗ هُمۡ لِلۡكُفۡرِ يَوۡمَئِذٍ أَقۡرَبُ مِنۡهُمۡ لِلۡإِيمَٰنِۚ يَقُولُونَ بِأَفۡوَٰهِهِم مَّا لَيۡسَ فِي قُلُوبِهِمۡۚ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يَكۡتُمُونَ
Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِينَ قَالُواْ لِإِخۡوَٰنِهِمۡ وَقَعَدُواْ لَوۡ أَطَاعُونَا مَا قُتِلُواْۗ قُلۡ فَٱدۡرَءُواْ عَنۡ أَنفُسِكُمُ ٱلۡمَوۡتَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
عربي تفسیرونه:
وَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَمۡوَٰتَۢاۚ بَلۡ أَحۡيَآءٌ عِندَ رَبِّهِمۡ يُرۡزَقُونَ
Mpe bokanisa te ete: Baye babomami na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali nde na bomoyi pembeni na Nkolo wa bango. Batondi na bomengo.
عربي تفسیرونه:
فَرِحِينَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ وَيَسۡتَبۡشِرُونَ بِٱلَّذِينَ لَمۡ يَلۡحَقُواْ بِهِم مِّنۡ خَلۡفِهِمۡ أَلَّا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
Basepeli na bolamu oyo Allah asali bango, mpe bazali na esengo na mitema mpona baninga na bango batikali na sima nakopesa bango sango elamu ete; babanga te mpe bayimayima te.
عربي تفسیرونه:
۞ يَسۡتَبۡشِرُونَ بِنِعۡمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَفَضۡلٖ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Bazali na Esengo na bolamu ya Allah mpe na lokumu naye, mpe ya sôló, Allah akobungisa te mbano ya bandimi.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِينَ ٱسۡتَجَابُواْ لِلَّهِ وَٱلرَّسُولِ مِنۢ بَعۡدِ مَآ أَصَابَهُمُ ٱلۡقَرۡحُۚ لِلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ مِنۡهُمۡ وَٱتَّقَوۡاْ أَجۡرٌ عَظِيمٌ
Baye bayanolaki na mbela ya Allah na ya motindami sima ya bango kozoka ba mpota. Kasi mpona ba oyo basalaki malamu kati na bango, mpe babangi (Allah), bakozala na lifuta linene.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِينَ قَالَ لَهُمُ ٱلنَّاسُ إِنَّ ٱلنَّاسَ قَدۡ جَمَعُواْ لَكُمۡ فَٱخۡشَوۡهُمۡ فَزَادَهُمۡ إِيمَٰنٗا وَقَالُواْ حَسۡبُنَا ٱللَّهُ وَنِعۡمَ ٱلۡوَكِيلُ
Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: آل عمران
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول