Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អ៊ីព្រហ៊ីម   វាក្យខណ្ឌ:

Ibrâhîm

الٓرۚ كِتَٰبٌ أَنزَلۡنَٰهُ إِلَيۡكَ لِتُخۡرِجَ ٱلنَّاسَ مِنَ ٱلظُّلُمَٰتِ إِلَى ٱلنُّورِ بِإِذۡنِ رَبِّهِمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَمِيدِ
Alif, lâm, râ.[1] buku eye tokitisi yango epai nayo ete obimisa na yango bato na molili komema bango na mwinda na ndingisa ya Nkolo wa bango, komema bango na nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu.
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱللَّهِ ٱلَّذِي لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَوَيۡلٞ لِّلۡكَٰفِرِينَ مِنۡ عَذَابٖ شَدِيدٍ
Allah nde Nkolo wa manso mazali o likolo mpe o nsé, mpe mpasi ezali тропа bapengwi, bakozuaka etumbu ya makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِينَ يَسۡتَحِبُّونَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا عَلَى ٱلۡأٓخِرَةِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَيَبۡغُونَهَا عِوَجًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ فِي ضَلَٰلِۭ بَعِيدٖ
Baye bazali коропа bomoyi ya nsé koleka oyo ya mokolo mwa suka mpe bazali kobundisa nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli. Bango bazali na libunga lia mosika.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا مِن رَّسُولٍ إِلَّا بِلِسَانِ قَوۡمِهِۦ لِيُبَيِّنَ لَهُمۡۖ فَيُضِلُّ ٱللَّهُ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Mpe totindaki motindami te sé azala moto ya monoko ya bato naye, mpo alimbola bango malamu. Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi. Mpe ye nde azali na bokasi atonda bwanya
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ بِـَٔايَٰتِنَآ أَنۡ أَخۡرِجۡ قَوۡمَكَ مِنَ ٱلظُّلُمَٰتِ إِلَى ٱلنُّورِ وَذَكِّرۡهُم بِأَيَّىٰمِ ٱللَّهِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّكُلِّ صَبَّارٖ شَكُورٖ
Мре tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi ma biso, bimisa bato bayo na molili bakende na bongengi. Mpe yebisa bango ete bakanisa na mikolo mia Allah. Ya soló, bilembo bina bizali тропа bato banso bakangi mitema mpe bazali na botondi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَةَ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ إِذۡ أَنجَىٰكُم مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَسُومُونَكُمۡ سُوٓءَ ٱلۡعَذَابِ وَيُذَبِّحُونَ أَبۡنَآءَكُمۡ وَيَسۡتَحۡيُونَ نِسَآءَكُمۡۚ وَفِي ذَٰلِكُم بَلَآءٞ مِّن رَّبِّكُمۡ عَظِيمٞ
Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye ete: Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, tango alongisaki bino na maboko ya bato ya falo, baye bazalaki konyokolo bino na etumbu, mpe bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe kotika basi na bino, kasi wana ezali elembo enene ya bomekami тропа bino kowuta epai ya Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذۡ تَأَذَّنَ رَبُّكُمۡ لَئِن شَكَرۡتُمۡ لَأَزِيدَنَّكُمۡۖ وَلَئِن كَفَرۡتُمۡ إِنَّ عَذَابِي لَشَدِيدٞ
Mpe tango Nkolo wa bino alobaki: Soki ya sólo, bozali kotondo ngai, nakobakisela bino bolamu bwa ngai kasi soki bozangi ngai botondi, ya sólo etumbu na ngai ezali makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالَ مُوسَىٰٓ إِن تَكۡفُرُوٓاْ أَنتُمۡ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا فَإِنَّ ٱللَّهَ لَغَنِيٌّ حَمِيدٌ
Mpe Mûssa alobaki ete: Soki bopengwi bino na baye banso bazali na nsé, ya sólo, boyeba ete Allah atonda na bomengo bwa ye mpe asanzolama na lokumu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَلَمۡ يَأۡتِكُمۡ نَبَؤُاْ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُمۡ قَوۡمِ نُوحٖ وَعَادٖ وَثَمُودَ وَٱلَّذِينَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ لَا يَعۡلَمُهُمۡ إِلَّا ٱللَّهُۚ جَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَرَدُّوٓاْ أَيۡدِيَهُمۡ فِيٓ أَفۡوَٰهِهِمۡ وَقَالُوٓاْ إِنَّا كَفَرۡنَا بِمَآ أُرۡسِلۡتُم بِهِۦ وَإِنَّا لَفِي شَكّٖ مِّمَّا تَدۡعُونَنَآ إِلَيۡهِ مُرِيبٖ
Boye sango ya baye balekaki liboso lia bino ekomelaki bino te ya bato ba Núh, na aad na Thamúd na baye balandaki bango sima? Moko te ayebi bango sé Allah. Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, kasi balobaki na kotiya maboko ma bango na minoko mia bango: Tokondima te na maye botindami na yango, mpe tozali na tembe na maye bozali kobenga biso na yango koleka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ قَالَتۡ رُسُلُهُمۡ أَفِي ٱللَّهِ شَكّٞ فَاطِرِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ يَدۡعُوكُمۡ لِيَغۡفِرَ لَكُم مِّن ذُنُوبِكُمۡ وَيُؤَخِّرَكُمۡ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗىۚ قَالُوٓاْ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُنَا تُرِيدُونَ أَن تَصُدُّونَا عَمَّا كَانَ يَعۡبُدُ ءَابَآؤُنَا فَأۡتُونَا بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٖ
Batindami na bango balobaki: Bozali kotiya tembe na Allah, mokeli wa likolo na mabele? Azali kobenga bino mpo alimbisa masumu ma bino, mpe Apesa bino eleko kino mikolo na bino mikoka. (bapengwi bakolobaka): Bozali bato lokola biso, boye bolingi koboisa biso na maye ba nkoko ba biso bazalaki kobondela boyela biso elembo ya polele!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَتۡ لَهُمۡ رُسُلُهُمۡ إِن نَّحۡنُ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يَمُنُّ عَلَىٰ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦۖ وَمَا كَانَ لَنَآ أَن نَّأۡتِيَكُم بِسُلۡطَٰنٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
Batindami ba bango bayanolaki bango balobi: Ya soló penza, tozali bato lokola bino, kasi Allah asalisaka oyo alingi o kati ya bawumbu baye. Biso tokoki koyela bino bilembo te sé ezala na bolingi bwa Allah, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi bamipesa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا لَنَآ أَلَّا نَتَوَكَّلَ عَلَى ٱللَّهِ وَقَدۡ هَدَىٰنَا سُبُلَنَاۚ وَلَنَصۡبِرَنَّ عَلَىٰ مَآ ءَاذَيۡتُمُونَاۚ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُتَوَكِّلُونَ
Mpe тропа nini tokomipesa na Allah te asilaki kokamba biso o nzela ya malamu eye tozali kolanda? Mpe Tokakanga mitema тропа minyokoli mia bino, mpe epai ya Allah, bandimi bamipesa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِرُسُلِهِمۡ لَنُخۡرِجَنَّكُم مِّنۡ أَرۡضِنَآ أَوۡ لَتَعُودُنَّ فِي مِلَّتِنَاۖ فَأَوۡحَىٰٓ إِلَيۡهِمۡ رَبُّهُمۡ لَنُهۡلِكَنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ
Мре bapengwi balobaki na batindami na bango ete: Tokobimisa bino na mabele ma biso, longola sé soki bozongi na lingomba lia biso. Na yango, Nkolo wa bango akitiseli bango emoniseli ete: Tokoboma babubi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَنُسۡكِنَنَّكُمُ ٱلۡأَرۡضَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡۚ ذَٰلِكَ لِمَنۡ خَافَ مَقَامِي وَخَافَ وَعِيدِ
Mpe tokovandisa bino o mboka sima na bango. Wana ezali тропа oyo akobanga bokutani na ngai тре azali kobanga elaka na etumbu. (na ngai)
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱسۡتَفۡتَحُواْ وَخَابَ كُلُّ جَبَّارٍ عَنِيدٖ
Mpe basengaki Allah elonga, mpe bato banso ya mabe bazalaki kobundisa bosôló bakweyaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مِّن وَرَآئِهِۦ جَهَنَّمُ وَيُسۡقَىٰ مِن مَّآءٖ صَدِيدٖ
Moto nde ekozala esika na bango, sima bakomelisaka bango mayi ma tofina;
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَتَجَرَّعُهُۥ وَلَا يَكَادُ يُسِيغُهُۥ وَيَأۡتِيهِ ٱلۡمَوۡتُ مِن كُلِّ مَكَانٖ وَمَا هُوَ بِمَيِّتٖۖ وَمِن وَرَآئِهِۦ عَذَابٌ غَلِيظٞ
Акотека komela yango mokemoke kaši ekolekaka te, liwa likoyelaka ye na bisika binso kaši akokufaka te. Mpe akozuaka etumbu ya makasi sima na yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مَّثَلُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡۖ أَعۡمَٰلُهُمۡ كَرَمَادٍ ٱشۡتَدَّتۡ بِهِ ٱلرِّيحُ فِي يَوۡمٍ عَاصِفٖۖ لَّا يَقۡدِرُونَ مِمَّا كَسَبُواْ عَلَىٰ شَيۡءٖۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلضَّلَٰلُ ٱلۡبَعِيدُ
Ndakisa ya misala ya baye bapengwi na Nkolo wa bango, ezali lokola mputulu ememami na mopepe ya makasi, bakokoka kozua litomba na eloko te na maye basalaki, wana ezali libunga ya mosika.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّۚ إِن يَشَأۡ يُذۡهِبۡكُمۡ وَيَأۡتِ بِخَلۡقٖ جَدِيدٖ
Boye ozali kornona te ete Allah akela likolo na mabele na bosôló? Soki alingi, abungisi bino тре ayei na bikelamo bisusu o esika na bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ بِعَزِيزٖ
Kaši wana ezali paši te тропа Allah asala yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَبَرَزُواْ لِلَّهِ جَمِيعٗا فَقَالَ ٱلضُّعَفَٰٓؤُاْ لِلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُوٓاْ إِنَّا كُنَّا لَكُمۡ تَبَعٗا فَهَلۡ أَنتُم مُّغۡنُونَ عَنَّا مِنۡ عَذَابِ ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖۚ قَالُواْ لَوۡ هَدَىٰنَا ٱللَّهُ لَهَدَيۡنَٰكُمۡۖ سَوَآءٌ عَلَيۡنَآ أَجَزِعۡنَآ أَمۡ صَبَرۡنَا مَا لَنَا مِن مَّحِيصٖ
Мре bawei banso bakobimaka о malita ma bango тре bakotelemaka o liboso lia Allah тропа kokata makambo, mpe bato bamotawu bakolobaka na ba oyo ya makasi mpe ya lolendo: Tozalaki kolanda bino, bokoki kokimisa mpe kobikisa biso na etumbu ya Allah te? Bakoyanolaka: Soki Allah akambaka biso tolingaki kokamba bino, tokokoka komisalisa te ata soki tozeli, mpe tozali na esika ya kokimela te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالَ ٱلشَّيۡطَٰنُ لَمَّا قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ إِنَّ ٱللَّهَ وَعَدَكُمۡ وَعۡدَ ٱلۡحَقِّ وَوَعَدتُّكُمۡ فَأَخۡلَفۡتُكُمۡۖ وَمَا كَانَ لِيَ عَلَيۡكُم مِّن سُلۡطَٰنٍ إِلَّآ أَن دَعَوۡتُكُمۡ فَٱسۡتَجَبۡتُمۡ لِيۖ فَلَا تَلُومُونِي وَلُومُوٓاْ أَنفُسَكُمۖ مَّآ أَنَا۠ بِمُصۡرِخِكُمۡ وَمَآ أَنتُم بِمُصۡرِخِيَّ إِنِّي كَفَرۡتُ بِمَآ أَشۡرَكۡتُمُونِ مِن قَبۡلُۗ إِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Mpe tango makambo manso makosilaka kokatama, satana akoloba na (bato ya lifelo): Ya soló, Allah alakaki bino elaka ya bosóló, ngai nalakaki bino elaka kasi nakokisi yango te. Mpe nazalaki na bokonzi likolo na bino te, kasi ngai na bengaki bino mpe bondimelaki ngai. Bo pamela ngai te, bomipamela bino moko. Ngai nakosalisa bino te mpe bino bokosalisa ngai te. Ya sólo, ngai naboyi na maye bosangisaki ngai na yango liboso (тропа Allah) ya sólo bato mabe bakozuaka etumbu ya makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأُدۡخِلَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا بِإِذۡنِ رَبِّهِمۡۖ تَحِيَّتُهُمۡ فِيهَا سَلَٰمٌ
Мре bakokotisama baye bandimaki mpe basalaki misala milamu o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka o kati na yango libela, na bolingi bwa Nkolo wa bango. Мре kuna losako na bango lokozala sé ete: (salam) kimia.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ ضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا كَلِمَةٗ طَيِّبَةٗ كَشَجَرَةٖ طَيِّبَةٍ أَصۡلُهَا ثَابِتٞ وَفَرۡعُهَا فِي ٱلسَّمَآءِ
Boye, ozali kornona te ete: Allah apeși ndakisa ya liloba lilamu lizali lokola nzete elamu eye misisa mia yango mikangama malamu, mpe bitape bia yango bibimi na likolo?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
تُؤۡتِيٓ أُكُلَهَا كُلَّ حِينِۭ بِإِذۡنِ رَبِّهَاۗ وَيَضۡرِبُ ٱللَّهُ ٱلۡأَمۡثَالَ لِلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
Ezali kobota mbuma na yango tango inso, na bolingi bwa Nkolo wa yango. Mpe Allah abetelaka bato ba ndakisa mpo bakoka kokanisa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَثَلُ كَلِمَةٍ خَبِيثَةٖ كَشَجَرَةٍ خَبِيثَةٍ ٱجۡتُثَّتۡ مِن فَوۡقِ ٱلۡأَرۡضِ مَا لَهَا مِن قَرَارٖ
Mpe apesi ndakisa ya liloba lia mabe, lizali lokola nzete ya mabe, eye ekundami malamu te kati na mabele, esimbamaka makasi te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يُثَبِّتُ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱلۡقَوۡلِ ٱلثَّابِتِ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَفِي ٱلۡأٓخِرَةِۖ وَيُضِلُّ ٱللَّهُ ٱلظَّٰلِمِينَۚ وَيَفۡعَلُ ٱللَّهُ مَا يَشَآءُ
Allah azali kolendisa bandimi na liloba litongami malamu, kati ya bomoyi ya nsé mpe na mokolo mwa suka, mpe azali kobungisa babubi, mpe Allah asalaka oyo alingi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ بَدَّلُواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ كُفۡرٗا وَأَحَلُّواْ قَوۡمَهُمۡ دَارَ ٱلۡبَوَارِ
Boye, ozali kornona te, тропа baye babongoli bolamu bwa Allah na bopengwi mpe batandi bato ba bango o ndako ya libungi?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
جَهَنَّمَ يَصۡلَوۡنَهَاۖ وَبِئۡسَ ٱلۡقَرَارُ
Bakozikisamaka na moto ya lifelo, oyo nde efandeli ya mabe!
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَعَلُواْ لِلَّهِ أَندَادٗا لِّيُضِلُّواْ عَن سَبِيلِهِۦۗ قُلۡ تَمَتَّعُواْ فَإِنَّ مَصِيرَكُمۡ إِلَى ٱلنَّارِ
Mpe batieli Allah binzambe nzambe, тропа kobungisa na yango bato nzela naye. Loba: Bosepela (na bomoyi bwa mokili) kaši nzela na bino ezali ya sôló okati ya moto ya lifelo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قُل لِّعِبَادِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ يُقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُنفِقُواْ مِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ سِرّٗا وَعَلَانِيَةٗ مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ يَوۡمٞ لَّا بَيۡعٞ فِيهِ وَلَا خِلَٰلٌ
Loba na bawumbu na ngai baye bandima ete: Batelemisa losambo mpe na maye topesaki bango babimisa yango na polele to na sekele liboso ete eyela bango mokolo oyo mombongo ekozala te mpe kimoninga ekozala te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَأَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجَ بِهِۦ مِنَ ٱلثَّمَرَٰتِ رِزۡقٗا لَّكُمۡۖ وَسَخَّرَ لَكُمُ ٱلۡفُلۡكَ لِتَجۡرِيَ فِي ٱلۡبَحۡرِ بِأَمۡرِهِۦۖ وَسَخَّرَ لَكُمُ ٱلۡأَنۡهَٰرَ
Allah nde mokeli wa likolo na nsé, mpe akitisaka mayi kowuta o mapata ezali kobimisa na yango bambuma mpo ezala bozui bwa bino. Мре apeși bino maye ya kosala masuwa mpo etambola na ebale. Na mitindo mia ye, mpe atieli bino mingala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَسَخَّرَ لَكُمُ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَ دَآئِبَيۡنِۖ وَسَخَّرَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَ
Mpe atieli bino moyi na sanza, ezala na bongengi bwa libela. Mpe atiyeli bino butu na mokolo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَءَاتَىٰكُم مِّن كُلِّ مَا سَأَلۡتُمُوهُۚ وَإِن تَعُدُّواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ لَا تُحۡصُوهَآۗ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لَظَلُومٞ كَفَّارٞ
Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِيمُ رَبِّ ٱجۡعَلۡ هَٰذَا ٱلۡبَلَدَ ءَامِنٗا وَٱجۡنُبۡنِي وَبَنِيَّ أَن نَّعۡبُدَ ٱلۡأَصۡنَامَ
Mpe tango Ibrâhîm alobaki: Oh Nkolo wa ngai! Tia mboka oyo (Makkah) ezala na kimia, mpe tiya ngai na bana ba ngai mosika mpo tobondela bikeko te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ إِنَّهُنَّ أَضۡلَلۡنَ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِۖ فَمَن تَبِعَنِي فَإِنَّهُۥ مِنِّيۖ وَمَنۡ عَصَانِي فَإِنَّكَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَّبَّنَآ إِنِّيٓ أَسۡكَنتُ مِن ذُرِّيَّتِي بِوَادٍ غَيۡرِ ذِي زَرۡعٍ عِندَ بَيۡتِكَ ٱلۡمُحَرَّمِ رَبَّنَا لِيُقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ فَٱجۡعَلۡ أَفۡـِٔدَةٗ مِّنَ ٱلنَّاسِ تَهۡوِيٓ إِلَيۡهِمۡ وَٱرۡزُقۡهُم مِّنَ ٱلثَّمَرَٰتِ لَعَلَّهُمۡ يَشۡكُرُونَ
Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبَّنَآ إِنَّكَ تَعۡلَمُ مَا نُخۡفِي وَمَا نُعۡلِنُۗ وَمَا يَخۡفَىٰ عَلَى ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ
Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي وَهَبَ لِي عَلَى ٱلۡكِبَرِ إِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَۚ إِنَّ رَبِّي لَسَمِيعُ ٱلدُّعَآءِ
Matondi na Allah oyo apesi ngai likabo ya İsmail mpe Is’háq na bopaka na ngai. Ya sólo, Nkolo na ngai azali penza moyoki ya libondeli,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ ٱجۡعَلۡنِي مُقِيمَ ٱلصَّلَوٰةِ وَمِن ذُرِّيَّتِيۚ رَبَّنَا وَتَقَبَّلۡ دُعَآءِ
Oh Nkolo wa ngai! Sala ngai ete nakokisa basambela elongo na libota nangai, Nkolo wa biso ndima libondeli na biso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لِي وَلِوَٰلِدَيَّ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ يَوۡمَ يَقُومُ ٱلۡحِسَابُ
OhNkolo wa biso! Limbisangai na baboti ba ngai,[1] na bandimi o mokolo mwa lifuta.
[1] Baboti ba ngai: Alobaki yango liboso ya koyeba ete tata naye azalaki monguna ya Allah, tango ayebi akabuani naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱللَّهَ غَٰفِلًا عَمَّا يَعۡمَلُ ٱلظَّٰلِمُونَۚ إِنَّمَا يُؤَخِّرُهُمۡ لِيَوۡمٖ تَشۡخَصُ فِيهِ ٱلۡأَبۡصَٰرُ
Mpe bokanisa te ete: Allah alandaka te maye babubi bazali kosala. Ya soló, azali kozelisa bango kino o mokolo moye miso ma bango makotombwama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مُهۡطِعِينَ مُقۡنِعِي رُءُوسِهِمۡ لَا يَرۡتَدُّ إِلَيۡهِمۡ طَرۡفُهُمۡۖ وَأَفۡـِٔدَتُهُمۡ هَوَآءٞ
Batomboki bakopotaka mbangu mpe mitu na miso na bango mikotala o likolo, mpe mitu mia bango mikozala polele, mpe mitema mikozalaka na eloko te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَنذِرِ ٱلنَّاسَ يَوۡمَ يَأۡتِيهِمُ ٱلۡعَذَابُ فَيَقُولُ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ رَبَّنَآ أَخِّرۡنَآ إِلَىٰٓ أَجَلٖ قَرِيبٖ نُّجِبۡ دَعۡوَتَكَ وَنَتَّبِعِ ٱلرُّسُلَۗ أَوَلَمۡ تَكُونُوٓاْ أَقۡسَمۡتُم مِّن قَبۡلُ مَا لَكُم مِّن زَوَالٖ
Mpe kebisa bato тропа mokolo moye etumbu ekoyelaka bango, babubi bakolobaka: Nkolo wa biso! Zelisa biso ata mwa ngonga токе, mpo toyanola na mbela nayo, mpe tolanda batindami. Boye bolapaki liboso te ete bokoki kolimwa te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَسَكَنتُمۡ فِي مَسَٰكِنِ ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَتَبَيَّنَ لَكُمۡ كَيۡفَ فَعَلۡنَا بِهِمۡ وَضَرَبۡنَا لَكُمُ ٱلۡأَمۡثَالَ
Boye bovandaki te na bisika bia baye babubaki milimo mia bango moko? Mpe bino boyebi polele ndenge nini tosalaki bango, mpe totangela bino bandakisa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَدۡ مَكَرُواْ مَكۡرَهُمۡ وَعِندَ ٱللَّهِ مَكۡرُهُمۡ وَإِن كَانَ مَكۡرُهُمۡ لِتَزُولَ مِنۡهُ ٱلۡجِبَالُ
Mpe basilaki kosala likita lia mabe, kasi likita lia bango wana liyebani[2] epai ya Allah, ata soki likita lia bango lizali makasi ekoki kopanza ngomba te.
[2] likita lia mabe eyebani epai ya Allah: Elingi koloba: Ezali pamba ераї ya Allah.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱللَّهَ مُخۡلِفَ وَعۡدِهِۦ رُسُلَهُۥٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٞ ذُو ٱنتِقَامٖ
Мре bokanisa te ete: Allah akozangisa kokokisa elaka naye epai ya batindami naye. Ya soló, Allah azali na nguya тропа kopesa etumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
يَوۡمَ تُبَدَّلُ ٱلۡأَرۡضُ غَيۡرَ ٱلۡأَرۡضِ وَٱلسَّمَٰوَٰتُۖ وَبَرَزُواْ لِلَّهِ ٱلۡوَٰحِدِ ٱلۡقَهَّارِ
Mokolo moye mabele makotikela mabele mosusu esika. Na mapata lokola, mokolo moye bato bakobimaka liboso lia Allah wa bomoko atonda bokasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَتَرَى ٱلۡمُجۡرِمِينَ يَوۡمَئِذٖ مُّقَرَّنِينَ فِي ٱلۡأَصۡفَادِ
О mokolo mona okomona batomboki bakangami bango na bango na minyololo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
سَرَابِيلُهُم مِّن قَطِرَانٖ وَتَغۡشَىٰ وُجُوهَهُمُ ٱلنَّارُ
В ilamba bia bango bikozalaka nde mbiko[1] mpe moto mokozingaka bilongi bia bango.
[1] Mbiko: (goudron).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لِيَجۡزِيَ ٱللَّهُ كُلَّ نَفۡسٖ مَّا كَسَبَتۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
(Nyoso wana) ekozala mpo Allah akofutaka moto nyoso engebene na maye asalaki. Ya sólo, Allah azali mbangu тропа kofuta.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
هَٰذَا بَلَٰغٞ لِّلنَّاسِ وَلِيُنذَرُواْ بِهِۦ وَلِيَعۡلَمُوٓاْ أَنَّمَا هُوَ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ وَلِيَذَّكَّرَ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
Oyó ezali sango mpe liyebisi (kurani) тропа bato bakeba na yango, mpe bayeba ya sólo ete, ye Nzambe (Allah) azali sé ye moko, na yango esengeli na bato ya mayele basosola.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អ៊ីព្រហ៊ីម
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ