Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហុិជរ៍   វាក្យខណ្ឌ:

Al-Hijr

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ وَقُرۡءَانٖ مُّبِينٖ
Alif, lâm, râ.[1] oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رُّبَمَا يَوَدُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡ كَانُواْ مُسۡلِمِينَ
(O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ذَرۡهُمۡ يَأۡكُلُواْ وَيَتَمَتَّعُواْ وَيُلۡهِهِمُ ٱلۡأَمَلُۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا وَلَهَا كِتَابٞ مَّعۡلُومٞ
Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مَّا تَسۡبِقُ مِنۡ أُمَّةٍ أَجَلَهَا وَمَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ
Umma[2] moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima.
[2] Umma: Lisanga ya bato, bótala Al-Baqarah: 128.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِي نُزِّلَ عَلَيۡهِ ٱلذِّكۡرُ إِنَّكَ لَمَجۡنُونٞ
Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَّوۡمَا تَأۡتِينَا بِٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
مَا نُنَزِّلُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَمَا كَانُوٓاْ إِذٗا مُّنظَرِينَ
Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّا نَحۡنُ نَزَّلۡنَا ٱلذِّكۡرَ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ
Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ فِي شِيَعِ ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَذَٰلِكَ نَسۡلُكُهُۥ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَا يُؤۡمِنُونَ بِهِۦ وَقَدۡ خَلَتۡ سُنَّةُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Bakondimaka na yango te,[1] mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso.
[1] Na yango te: Ezali “Kurani”, kasi, na bandimbola misusu ezali nde “Muhammad”.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَوۡ فَتَحۡنَا عَلَيۡهِم بَابٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ فَظَلُّواْ فِيهِ يَعۡرُجُونَ
Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَقَالُوٓاْ إِنَّمَا سُكِّرَتۡ أَبۡصَٰرُنَا بَلۡ نَحۡنُ قَوۡمٞ مَّسۡحُورُونَ
Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ جَعَلۡنَا فِي ٱلسَّمَآءِ بُرُوجٗا وَزَيَّنَّٰهَا لِلنَّٰظِرِينَ
Mpe tosilaki ya sólo, kotia minzoto na mapata, mpe topesi yango bonzenga тропа botali.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَحَفِظۡنَٰهَا مِن كُلِّ شَيۡطَٰنٖ رَّجِيمٍ
Mpe tobatelaki yango na mabe manso ma satana wa botutu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا مَنِ ٱسۡتَرَقَ ٱلسَّمۡعَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابٞ مُّبِينٞ
Ata oyo akolinga koyokamela yango, tokolandisa ye moto
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلۡأَرۡضَ مَدَدۡنَٰهَا وَأَلۡقَيۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ وَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ شَيۡءٖ مَّوۡزُونٖ
Mpe o mabele totandaki yango, mpe totiyeli yango bangomba mpe tolandisaki eloko nyoso na bokoki bwa yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَعَلۡنَا لَكُمۡ فِيهَا مَعَٰيِشَ وَمَن لَّسۡتُمۡ لَهُۥ بِرَٰزِقِينَ
Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِن مِّن شَيۡءٍ إِلَّا عِندَنَا خَزَآئِنُهُۥ وَمَا نُنَزِّلُهُۥٓ إِلَّا بِقَدَرٖ مَّعۡلُومٖ
Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَرۡسَلۡنَا ٱلرِّيَٰحَ لَوَٰقِحَ فَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَسۡقَيۡنَٰكُمُوهُ وَمَآ أَنتُمۡ لَهُۥ بِخَٰزِنِينَ
Mpe tozali kotinda mipepe ya kokolisa milona mpe tokitisi mayi kowuta na mapata тропа komelisa bino na yango, oyo bozali na bokoki ya kobomba yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّا لَنَحۡنُ نُحۡيِۦ وَنُمِيتُ وَنَحۡنُ ٱلۡوَٰرِثُونَ
Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ عَلِمۡنَا ٱلۡمُسۡتَقۡدِمِينَ مِنكُمۡ وَلَقَدۡ عَلِمۡنَا ٱلۡمُسۡتَـٔۡخِرِينَ
Mpe toyebi baye baleka liboso na bino (basila kokufa), mpe toyebi baye batikali naino sima.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ رَبَّكَ هُوَ يَحۡشُرُهُمۡۚ إِنَّهُۥ حَكِيمٌ عَلِيمٞ
Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِن صَلۡصَٰلٖ مِّنۡ حَمَإٖ مَّسۡنُونٖ
Мре tokelaki moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱلۡجَآنَّ خَلَقۡنَٰهُ مِن قَبۡلُ مِن نَّارِ ٱلسَّمُومِ
Mpe tokelaki ba djini[1] liboso na moto ya molunge makasi.
[1] Djini: Ezali: Sátana. Zábulu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذۡ قَالَ رَبُّكَ لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِنِّي خَٰلِقُۢ بَشَرٗا مِّن صَلۡصَٰلٖ مِّنۡ حَمَإٖ مَّسۡنُونٖ
Mpe tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu ete: Ya soló nalingi kokela moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَإِذَا سَوَّيۡتُهُۥ وَنَفَخۡتُ فِيهِ مِن رُّوحِي فَقَعُواْ لَهُۥ سَٰجِدِينَ
Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَسَجَدَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ كُلُّهُمۡ أَجۡمَعُونَ
Mpe ba anzelu banso bafukamaki.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّآ إِبۡلِيسَ أَبَىٰٓ أَن يَكُونَ مَعَ ٱلسَّٰجِدِينَ
Longola sé lusufele (ibilisa), aboyaka kogumbama elongo na bagumbami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ يَٰٓإِبۡلِيسُ مَا لَكَ أَلَّا تَكُونَ مَعَ ٱلسَّٰجِدِينَ
Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ لَمۡ أَكُن لِّأَسۡجُدَ لِبَشَرٍ خَلَقۡتَهُۥ مِن صَلۡصَٰلٖ مِّنۡ حَمَإٖ مَّسۡنُونٖ
Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ فَٱخۡرُجۡ مِنۡهَا فَإِنَّكَ رَجِيمٞ
Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ عَلَيۡكَ ٱللَّعۡنَةَ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلدِّينِ
Mpe okozala na botutu kino mokolo mwa suka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ فَأَنظِرۡنِيٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ فَإِنَّكَ مِنَ ٱلۡمُنظَرِينَ
Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡوَقۡتِ ٱلۡمَعۡلُومِ
Kino mokolo ya ngonga eye eyebani.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ رَبِّ بِمَآ أَغۡوَيۡتَنِي لَأُزَيِّنَنَّ لَهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَأُغۡوِيَنَّهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pamba te mpo omemi ngai na libungi, mpe na kobongisela bango mokili mpe nakobungisa bango banso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا عِبَادَكَ مِنۡهُمُ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu nayo baye osilaki коропа.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ هَٰذَا صِرَٰطٌ عَلَيَّ مُسۡتَقِيمٌ
(Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ عِبَادِي لَيۡسَ لَكَ عَلَيۡهِمۡ سُلۡطَٰنٌ إِلَّا مَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡغَاوِينَ
Ya solo, bawumbu ba ngai ozali na bokonzi likolo na bango te longola sé baye bakolanda yo nakati ya babungi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّ جَهَنَّمَ لَمَوۡعِدُهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Mpe ya soló, lifelo ekozala esika na bango banso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَهَا سَبۡعَةُ أَبۡوَٰبٖ لِّكُلِّ بَابٖ مِّنۡهُمۡ جُزۡءٞ مَّقۡسُومٌ
Ezali na bikuke sambo тропа kokota, mpe bikuke binso biyebani na bato ba yango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٍ
Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱدۡخُلُوهَا بِسَلَٰمٍ ءَامِنِينَ
Bokota na kati na yango na kimia nyoso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَزَعۡنَا مَا فِي صُدُورِهِم مِّنۡ غِلٍّ إِخۡوَٰنًا عَلَىٰ سُرُرٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَا يَمَسُّهُمۡ فِيهَا نَصَبٞ وَمَا هُم مِّنۡهَا بِمُخۡرَجِينَ
Moko te bolembu ekozua ye, mpe bakobimaka o kati na yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
۞ نَبِّئۡ عِبَادِيٓ أَنِّيٓ أَنَا ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
Yebisa bawumbu ba ngai, ya soló, ngai nazali molimbisi natonda ngolu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَنَّ عَذَابِي هُوَ ٱلۡعَذَابُ ٱلۡأَلِيمُ
Mpe ya sólo, etumbu na ngai ezalaka etumbu ya makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَنَبِّئۡهُمۡ عَن ضَيۡفِ إِبۡرَٰهِيمَ
Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِذۡ دَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَقَالُواْ سَلَٰمٗا قَالَ إِنَّا مِنكُمۡ وَجِلُونَ
Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ لَا تَوۡجَلۡ إِنَّا نُبَشِّرُكَ بِغُلَٰمٍ عَلِيمٖ
Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ أَبَشَّرۡتُمُونِي عَلَىٰٓ أَن مَّسَّنِيَ ٱلۡكِبَرُ فَبِمَ تُبَشِّرُونَ
Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ بَشَّرۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ فَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡقَٰنِطِينَ
Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ وَمَن يَقۡنَطُ مِن رَّحۡمَةِ رَبِّهِۦٓ إِلَّا ٱلضَّآلُّونَ
Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ فَمَا خَطۡبُكُمۡ أَيُّهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُوٓاْ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمٖ مُّجۡرِمِينَ
Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّآ ءَالَ لُوطٍ إِنَّا لَمُنَجُّوهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِلَّا ٱمۡرَأَتَهُۥ قَدَّرۡنَآ إِنَّهَا لَمِنَ ٱلۡغَٰبِرِينَ
Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَلَمَّا جَآءَ ءَالَ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلُونَ
Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ إِنَّكُمۡ قَوۡمٞ مُّنكَرُونَ
Alobi: Bozali bato bayebani te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُواْ بَلۡ جِئۡنَٰكَ بِمَا كَانُواْ فِيهِ يَمۡتَرُونَ
Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَأَتَيۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ وَإِنَّا لَصَٰدِقُونَ
Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَسۡرِ بِأَهۡلِكَ بِقِطۡعٖ مِّنَ ٱلَّيۡلِ وَٱتَّبِعۡ أَدۡبَٰرَهُمۡ وَلَا يَلۡتَفِتۡ مِنكُمۡ أَحَدٞ وَٱمۡضُواْ حَيۡثُ تُؤۡمَرُونَ
Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقَضَيۡنَآ إِلَيۡهِ ذَٰلِكَ ٱلۡأَمۡرَ أَنَّ دَابِرَ هَٰٓؤُلَآءِ مَقۡطُوعٞ مُّصۡبِحِينَ
Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَجَآءَ أَهۡلُ ٱلۡمَدِينَةِ يَسۡتَبۡشِرُونَ
Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ ضَيۡفِي فَلَا تَفۡضَحُونِ
Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلَا تُخۡزُونِ
Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالُوٓاْ أَوَلَمۡ نَنۡهَكَ عَنِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili?
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
قَالَ هَٰٓؤُلَآءِ بَنَاتِيٓ إِن كُنتُمۡ فَٰعِلِينَ
Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَعَمۡرُكَ إِنَّهُمۡ لَفِي سَكۡرَتِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّيۡحَةُ مُشۡرِقِينَ
Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَجَعَلۡنَا عَٰلِيَهَا سَافِلَهَا وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِمۡ حِجَارَةٗ مِّن سِجِّيلٍ
Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّلۡمُتَوَسِّمِينَ
Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِنَّهَا لَبِسَبِيلٖ مُّقِيمٍ
Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِن كَانَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأَيۡكَةِ لَظَٰلِمِينَ
Ya sólo, etuka ya aïkat[1] bazalaki mpe babubi.
[1] Aïkat: Ezali mboka ezuami pene ya mboka ya Shuaïb
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱنتَقَمۡنَا مِنۡهُمۡ وَإِنَّهُمَا لَبِإِمَامٖ مُّبِينٖ
Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ كَذَّبَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡحِجۡرِ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Мре bato ba mboka ya hijr[1] basilaki kosala batindami mabe.
[1] Hij r: Mboka ya ntoma Swálih.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَءَاتَيۡنَٰهُمۡ ءَايَٰتِنَا فَكَانُواْ عَنۡهَا مُعۡرِضِينَ
Mpe tolakisaki bango makamwisi ma biso kasi balandaki yango te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَكَانُواْ يَنۡحِتُونَ مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتًا ءَامِنِينَ
Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّيۡحَةُ مُصۡبِحِينَ
Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَمَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّۗ وَإِنَّ ٱلسَّاعَةَ لَأٓتِيَةٞۖ فَٱصۡفَحِ ٱلصَّفۡحَ ٱلۡجَمِيلَ
Mpe tokelaki likolo na nsé, na maye manso mazuami o kati na yango mibale te sé na bosóló, mpe ya soló, ngonga ekokokaka, limbisa bolimbisi bwa malamu.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّ رَبَّكَ هُوَ ٱلۡخَلَّٰقُ ٱلۡعَلِيمُ
Ya sólo, Nkolo wayo azali mokeli mpe moyebi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَٰكَ سَبۡعٗا مِّنَ ٱلۡمَثَانِي وَٱلۡقُرۡءَانَ ٱلۡعَظِيمَ
Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo[1] тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene.
[1] Mikapo sambo: Ezali suratu Al-Fâtihah (bofungoli), Esengeli na mizilima atanga yango na balosambo naye nionso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
لَا تَمُدَّنَّ عَيۡنَيۡكَ إِلَىٰ مَا مَتَّعۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّنۡهُمۡ وَلَا تَحۡزَنۡ عَلَيۡهِمۡ وَٱخۡفِضۡ جَنَاحَكَ لِلۡمُؤۡمِنِينَ
Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَقُلۡ إِنِّيٓ أَنَا ٱلنَّذِيرُ ٱلۡمُبِينُ
Mpe loba: Ya soló, nazali mokebisi ya polele.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
كَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَى ٱلۡمُقۡتَسِمِينَ
Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli[1],
[1] Bakaboli: Ezali baye bakabolaki kurani.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِينَ جَعَلُواْ ٱلۡقُرۡءَانَ عِضِينَ
Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَوَرَبِّكَ لَنَسۡـَٔلَنَّهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Mpe na nkombo ya Nkolo nayo, nakotunaka bango banso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
عَمَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Mpona maye bazalaki kosala.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَٱصۡدَعۡ بِمَا تُؤۡمَرُ وَأَعۡرِضۡ عَنِ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah).
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
إِنَّا كَفَيۡنَٰكَ ٱلۡمُسۡتَهۡزِءِينَ
Tozali kosunga yo liboso lia baye bazali kotiola yo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلَّذِينَ يَجۡعَلُونَ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَۚ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Baye bazali kosangisa Allah na biloko bisusu, bakoyebaka kala te.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَقَدۡ نَعۡلَمُ أَنَّكَ يَضِيقُ صَدۡرُكَ بِمَا يَقُولُونَ
Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
فَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ وَكُن مِّنَ ٱلسَّٰجِدِينَ
Mpe kumisa Nkolo wayo, mpe zala o kati ya bagumbami.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَٱعۡبُدۡ رَبَّكَ حَتَّىٰ يَأۡتِيَكَ ٱلۡيَقِينُ
Mpe bondela Nkolo wayo, kino bosôló bokoyelaka yo[1].
[1] Bosôló bokoyelaka yo: Elakisi: Liwa.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហុិជរ៍
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ