Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ * - មាតិកានៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អ៊ីព្រហ៊ីម   វាក្យខណ្ឌ:
وَءَاتَىٰكُم مِّن كُلِّ مَا سَأَلۡتُمُوهُۚ وَإِن تَعُدُّواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ لَا تُحۡصُوهَآۗ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لَظَلُومٞ كَفَّارٞ
Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَإِذۡ قَالَ إِبۡرَٰهِيمُ رَبِّ ٱجۡعَلۡ هَٰذَا ٱلۡبَلَدَ ءَامِنٗا وَٱجۡنُبۡنِي وَبَنِيَّ أَن نَّعۡبُدَ ٱلۡأَصۡنَامَ
Mpe tango Ibrâhîm alobaki: Oh Nkolo wa ngai! Tia mboka oyo (Makkah) ezala na kimia, mpe tiya ngai na bana ba ngai mosika mpo tobondela bikeko te,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ إِنَّهُنَّ أَضۡلَلۡنَ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِۖ فَمَن تَبِعَنِي فَإِنَّهُۥ مِنِّيۖ وَمَنۡ عَصَانِي فَإِنَّكَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَّبَّنَآ إِنِّيٓ أَسۡكَنتُ مِن ذُرِّيَّتِي بِوَادٍ غَيۡرِ ذِي زَرۡعٍ عِندَ بَيۡتِكَ ٱلۡمُحَرَّمِ رَبَّنَا لِيُقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ فَٱجۡعَلۡ أَفۡـِٔدَةٗ مِّنَ ٱلنَّاسِ تَهۡوِيٓ إِلَيۡهِمۡ وَٱرۡزُقۡهُم مِّنَ ٱلثَّمَرَٰتِ لَعَلَّهُمۡ يَشۡكُرُونَ
Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبَّنَآ إِنَّكَ تَعۡلَمُ مَا نُخۡفِي وَمَا نُعۡلِنُۗ وَمَا يَخۡفَىٰ عَلَى ٱللَّهِ مِن شَيۡءٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ
Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي وَهَبَ لِي عَلَى ٱلۡكِبَرِ إِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَۚ إِنَّ رَبِّي لَسَمِيعُ ٱلدُّعَآءِ
Matondi na Allah oyo apesi ngai likabo ya İsmail mpe Is’háq na bopaka na ngai. Ya sólo, Nkolo na ngai azali penza moyoki ya libondeli,
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبِّ ٱجۡعَلۡنِي مُقِيمَ ٱلصَّلَوٰةِ وَمِن ذُرِّيَّتِيۚ رَبَّنَا وَتَقَبَّلۡ دُعَآءِ
Oh Nkolo wa ngai! Sala ngai ete nakokisa basambela elongo na libota nangai, Nkolo wa biso ndima libondeli na biso.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لِي وَلِوَٰلِدَيَّ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ يَوۡمَ يَقُومُ ٱلۡحِسَابُ
OhNkolo wa biso! Limbisangai na baboti ba ngai,[1] na bandimi o mokolo mwa lifuta.
[1] Baboti ba ngai: Alobaki yango liboso ya koyeba ete tata naye azalaki monguna ya Allah, tango ayebi akabuani naye.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
وَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱللَّهَ غَٰفِلًا عَمَّا يَعۡمَلُ ٱلظَّٰلِمُونَۚ إِنَّمَا يُؤَخِّرُهُمۡ لِيَوۡمٖ تَشۡخَصُ فِيهِ ٱلۡأَبۡصَٰرُ
Mpe bokanisa te ete: Allah alandaka te maye babubi bazali kosala. Ya soló, azali kozelisa bango kino o mokolo moye miso ma bango makotombwama.
ការបកស្រាយជាភាសា​អារ៉ាប់:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អ៊ីព្រហ៊ីម
មាតិកានៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យនៃគម្ពីរគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីងហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ - មាតិកានៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ ហ្ពាន់ហ្គូហ្គូ

បិទ