Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Daha   Aya:
إِذۡ أَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰٓ أُمِّكَ مَا يُوحَىٰٓ
Tango toyebisaka na mama wayo mayebisi.
Tafsiran larabci:
أَنِ ٱقۡذِفِيهِ فِي ٱلتَّابُوتِ فَٱقۡذِفِيهِ فِي ٱلۡيَمِّ فَلۡيُلۡقِهِ ٱلۡيَمُّ بِٱلسَّاحِلِ يَأۡخُذۡهُ عَدُوّٞ لِّي وَعَدُوّٞ لَّهُۥۚ وَأَلۡقَيۡتُ عَلَيۡكَ مَحَبَّةٗ مِّنِّي وَلِتُصۡنَعَ عَلَىٰ عَيۡنِيٓ
Ete: Tia ye na sanduku mpe bwaka yango na mayi mpo ete ebale emema yango o ngambo ya kotiola, monguna na ngai naye akozua ye. Mpe na tiaki likolo nayo bolingo na ngai mpo ete obokolama na nsé ya miso na ngai.
Tafsiran larabci:
إِذۡ تَمۡشِيٓ أُخۡتُكَ فَتَقُولُ هَلۡ أَدُلُّكُمۡ عَلَىٰ مَن يَكۡفُلُهُۥۖ فَرَجَعۡنَٰكَ إِلَىٰٓ أُمِّكَ كَيۡ تَقَرَّ عَيۡنُهَا وَلَا تَحۡزَنَۚ وَقَتَلۡتَ نَفۡسٗا فَنَجَّيۡنَٰكَ مِنَ ٱلۡغَمِّ وَفَتَنَّٰكَ فُتُونٗاۚ فَلَبِثۡتَ سِنِينَ فِيٓ أَهۡلِ مَدۡيَنَ ثُمَّ جِئۡتَ عَلَىٰ قَدَرٖ يَٰمُوسَىٰ
Mpe tango ndeko nayo ya mwasi azalaki kolanda yo mpe alobaki: Nalakisa bino moto oyo akomelisa ye тропа bino? Mpe tozongisaki yo epai ya mama wayo, mpo asepela mpe ayoka mpasi te, mpe obomaki moto mpe tobikisaki yo na makambo wana, mpe tomekaki yo makambo ebele, mpe ovandaki ba mbula ebele o mboka ya mad’yan, sima oyei oh Mûssa! Kokokisa makomi.
Tafsiran larabci:
وَٱصۡطَنَعۡتُكَ لِنَفۡسِي
Mpe ngai moko naponaki yo.
Tafsiran larabci:
ٱذۡهَبۡ أَنتَ وَأَخُوكَ بِـَٔايَٰتِي وَلَا تَنِيَا فِي ذِكۡرِي
Bökende yo na ndeko wayo na makamwisi ma ngai, mpe bolemba kokumisa ngai te.
Tafsiran larabci:
ٱذۡهَبَآ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ
Bökende epai ya falo, ya soló ye asili kotomboka.
Tafsiran larabci:
فَقُولَا لَهُۥ قَوۡلٗا لَّيِّنٗا لَّعَلَّهُۥ يَتَذَكَّرُ أَوۡ يَخۡشَىٰ
Mpe boyebisa ye liloba ya pete, tango mosusu akoki kokanisa to kobanga ngai.
Tafsiran larabci:
قَالَا رَبَّنَآ إِنَّنَا نَخَافُ أَن يَفۡرُطَ عَلَيۡنَآ أَوۡ أَن يَطۡغَىٰ
Balobi: Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, tozali kobanga ete anyokolo biso, to alekisa ndelo.
Tafsiran larabci:
قَالَ لَا تَخَافَآۖ إِنَّنِي مَعَكُمَآ أَسۡمَعُ وَأَرَىٰ
(Allah) alobi: Bobanga te, ya sólo nazali elongo na bino, nazali koyoka mpe kornona.
Tafsiran larabci:
فَأۡتِيَاهُ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولَا رَبِّكَ فَأَرۡسِلۡ مَعَنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ وَلَا تُعَذِّبۡهُمۡۖ قَدۡ جِئۡنَٰكَ بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكَۖ وَٱلسَّلَٰمُ عَلَىٰ مَنِ ٱتَّبَعَ ٱلۡهُدَىٰٓ
Bökende epai naye mpe boloba naye: Biso mibale tozali batindami ya Nkolo wayo, pesa biso bana ya isalayele tokende na bango, tika konyokolo bango, toyeli yo elembo ya Nkolo wayo, mpe kimiya ezala likolo ya moto oyo akolanda nzela ya semba.
Tafsiran larabci:
إِنَّا قَدۡ أُوحِيَ إِلَيۡنَآ أَنَّ ٱلۡعَذَابَ عَلَىٰ مَن كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ
Ya sólo, basilaki koyebisa biso ete: Etumbu ekozala likolo ya oyo akoboya kotosa mpe kondima, mpe apesi mokongo.
Tafsiran larabci:
قَالَ فَمَن رَّبُّكُمَا يَٰمُوسَىٰ
(Falo) alobi: Nani Nkolo wa bino oh Mûssa?
Tafsiran larabci:
قَالَ رَبُّنَا ٱلَّذِيٓ أَعۡطَىٰ كُلَّ شَيۡءٍ خَلۡقَهُۥ ثُمَّ هَدَىٰ
(Mûssa) alobi: Nkolo wa biso nde oyo apesaki eloko nyoso lolenge na yango mpe sima akambi yango.
Tafsiran larabci:
قَالَ فَمَا بَالُ ٱلۡقُرُونِ ٱلۡأُولَىٰ
(Falo) alobi: Bongo ndenge nini тропа baye balekaka kala?
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Daha
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa