Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Daha   Aya:
وَأَنَا ٱخۡتَرۡتُكَ فَٱسۡتَمِعۡ لِمَا يُوحَىٰٓ
Mpe naponi yo, yoka maye bakoyebisa yo.
Tafsiran larabci:
إِنَّنِيٓ أَنَا ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنَا۠ فَٱعۡبُدۡنِي وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ لِذِكۡرِيٓ
Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai.
Tafsiran larabci:
إِنَّ ٱلسَّاعَةَ ءَاتِيَةٌ أَكَادُ أُخۡفِيهَا لِتُجۡزَىٰ كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا تَسۡعَىٰ
Ya soló, ntango ya suka ekoya, na bombi yango mpo ete molimo na molimo afutama na mpiko naye.
Tafsiran larabci:
فَلَا يَصُدَّنَّكَ عَنۡهَا مَن لَّا يُؤۡمِنُ بِهَا وَٱتَّبَعَ هَوَىٰهُ فَتَرۡدَىٰ
Kasi oyo andimi na yango te mpe alandi sé mposa naye, abungisa yo te noki te okobebisama.
Tafsiran larabci:
وَمَا تِلۡكَ بِيَمِينِكَ يَٰمُوسَىٰ
Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa?
Tafsiran larabci:
قَالَ هِيَ عَصَايَ أَتَوَكَّؤُاْ عَلَيۡهَا وَأَهُشُّ بِهَا عَلَىٰ غَنَمِي وَلِيَ فِيهَا مَـَٔارِبُ أُخۡرَىٰ
Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango,[1] mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu.
[1] Komisimba na yango tango ya bopemi.
Tafsiran larabci:
قَالَ أَلۡقِهَا يَٰمُوسَىٰ
(Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa!
Tafsiran larabci:
فَأَلۡقَىٰهَا فَإِذَا هِيَ حَيَّةٞ تَسۡعَىٰ
Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola.
Tafsiran larabci:
قَالَ خُذۡهَا وَلَا تَخَفۡۖ سَنُعِيدُهَا سِيرَتَهَا ٱلۡأُولَىٰ
(Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso.
Tafsiran larabci:
وَٱضۡمُمۡ يَدَكَ إِلَىٰ جَنَاحِكَ تَخۡرُجۡ بَيۡضَآءَ مِنۡ غَيۡرِ سُوٓءٍ ءَايَةً أُخۡرَىٰ
Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa).
Tafsiran larabci:
لِنُرِيَكَ مِنۡ ءَايَٰتِنَا ٱلۡكُبۡرَى
Mpo tolakisa yo makamwisi ma biso ya minene.
Tafsiran larabci:
ٱذۡهَبۡ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ إِنَّهُۥ طَغَىٰ
Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo,
Tafsiran larabci:
قَالَ رَبِّ ٱشۡرَحۡ لِي صَدۡرِي
(Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai,[1]
[1] Fungóla ntolo na ngai: Elakisi: Tia motema na nga eyamba emoniseli
Tafsiran larabci:
وَيَسِّرۡ لِيٓ أَمۡرِي
Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete,
Tafsiran larabci:
وَٱحۡلُلۡ عُقۡدَةٗ مِّن لِّسَانِي
Mpe bongisa elobeli na ngai.
Tafsiran larabci:
يَفۡقَهُواْ قَوۡلِي
Mpo bakoka kososola maloba na ngai.
Tafsiran larabci:
وَٱجۡعَل لِّي وَزِيرٗا مِّنۡ أَهۡلِي
Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai.
Tafsiran larabci:
هَٰرُونَ أَخِي
Hâruna ndeko wa ngai,
Tafsiran larabci:
ٱشۡدُدۡ بِهِۦٓ أَزۡرِي
Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya,
Tafsiran larabci:
وَأَشۡرِكۡهُ فِيٓ أَمۡرِي
Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale),
Tafsiran larabci:
كَيۡ نُسَبِّحَكَ كَثِيرٗا
Mpo tokumisa yo koleka,
Tafsiran larabci:
وَنَذۡكُرَكَ كَثِيرًا
Mpe tokanisa yo mingi,
Tafsiran larabci:
إِنَّكَ كُنتَ بِنَا بَصِيرٗا
Ya soló, ozali kornona biso.
Tafsiran larabci:
قَالَ قَدۡ أُوتِيتَ سُؤۡلَكَ يَٰمُوسَىٰ
(Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama.
Tafsiran larabci:
وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَيۡكَ مَرَّةً أُخۡرَىٰٓ
Mpe tosilaka kosalisa yo mbala ya yambo.
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Daha
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa