Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Ash-Shu‘arā’   Ayah:
قَالَ فَعَلۡتُهَآ إِذٗا وَأَنَا۠ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ
Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَفَرَرۡتُ مِنكُمۡ لَمَّا خِفۡتُكُمۡ فَوَهَبَ لِي رَبِّي حُكۡمٗا وَجَعَلَنِي مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَتِلۡكَ نِعۡمَةٞ تَمُنُّهَا عَلَيَّ أَنۡ عَبَّدتَّ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ فِرۡعَوۡنُ وَمَا رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
(Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ
(Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ لِمَنۡ حَوۡلَهُۥٓ أَلَا تَسۡتَمِعُونَ
Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
(Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ إِنَّ رَسُولَكُمُ ٱلَّذِيٓ أُرۡسِلَ إِلَيۡكُمۡ لَمَجۡنُونٞ
(Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقِ وَٱلۡمَغۡرِبِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُمۡ تَعۡقِلُونَ
(Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ لَئِنِ ٱتَّخَذۡتَ إِلَٰهًا غَيۡرِي لَأَجۡعَلَنَّكَ مِنَ ٱلۡمَسۡجُونِينَ
(Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ أَوَلَوۡ جِئۡتُكَ بِشَيۡءٖ مُّبِينٖ
(Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ فَأۡتِ بِهِۦٓ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
(Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَلۡقَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ ثُعۡبَانٞ مُّبِينٞ
(Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَنَزَعَ يَدَهُۥ فَإِذَا هِيَ بَيۡضَآءُ لِلنَّٰظِرِينَ
Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ لِلۡمَلَإِ حَوۡلَهُۥٓ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٌ عَلِيمٞ
(Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يُرِيدُ أَن يُخۡرِجَكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِۦ فَمَاذَا تَأۡمُرُونَ
Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُوٓاْ أَرۡجِهۡ وَأَخَاهُ وَٱبۡعَثۡ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ
Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana),
Arabic explanations of the Qur’an:
يَأۡتُوكَ بِكُلِّ سَحَّارٍ عَلِيمٖ
Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَجُمِعَ ٱلسَّحَرَةُ لِمِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
Banganga basangani o mokolo mwa elaka.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقِيلَ لِلنَّاسِ هَلۡ أَنتُم مُّجۡتَمِعُونَ
Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te?
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Ash-Shu‘arā’
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close