Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Ash-Shu‘arā’   Ayah:

Ach-Chu’arâ

طسٓمٓ
Twâ, sín, mîm.[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo ya liboso.
Arabic explanations of the Qur’an:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
Oyo nde mikapo mia buku ya polele.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَعَلَّكَ بَٰخِعٞ نَّفۡسَكَ أَلَّا يَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِن نَّشَأۡ نُنَزِّلۡ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ ءَايَةٗ فَظَلَّتۡ أَعۡنَٰقُهُمۡ لَهَا خَٰضِعِينَ
Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni).
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرٖ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ مُحۡدَثٍ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهُ مُعۡرِضِينَ
Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân[2], sé bakopesa yango mokongo.
[2] Ar-Rahmán: Bótala Ar-Ra’d mokapo: 30.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَقَدۡ كَذَّبُواْ فَسَيَأۡتِيهِمۡ أَنۢبَٰٓؤُاْ مَا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَمۡ أَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجٖ كَرِيمٍ
Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu?
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذۡ نَادَىٰ رَبُّكَ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱئۡتِ ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَۚ أَلَا يَتَّقُونَ
Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبِّ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُكَذِّبُونِ
Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيَضِيقُ صَدۡرِي وَلَا يَنطَلِقُ لِسَانِي فَأَرۡسِلۡ إِلَىٰ هَٰرُونَ
Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَهُمۡ عَلَيَّ ذَنۢبٞ فَأَخَافُ أَن يَقۡتُلُونِ
Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ كَلَّاۖ فَٱذۡهَبَا بِـَٔايَٰتِنَآۖ إِنَّا مَعَكُم مُّسۡتَمِعُونَ
(Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأۡتِيَا فِرۡعَوۡنَ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo,
Arabic explanations of the Qur’an:
أَنۡ أَرۡسِلۡ مَعَنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
Mpo opesa biso bana ya isalayele.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ أَلَمۡ نُرَبِّكَ فِينَا وَلِيدٗا وَلَبِثۡتَ فِينَا مِنۡ عُمُرِكَ سِنِينَ
Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَفَعَلۡتَ فَعۡلَتَكَ ٱلَّتِي فَعَلۡتَ وَأَنتَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Ash-Shu‘arā’
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close