Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Mu’minūn   Ayah:
فَإِذَا ٱسۡتَوَيۡتَ أَنتَ وَمَن مَّعَكَ عَلَى ٱلۡفُلۡكِ فَقُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي نَجَّىٰنَا مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقُل رَّبِّ أَنزِلۡنِي مُنزَلٗا مُّبَارَكٗا وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلۡمُنزِلِينَ
Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ وَإِن كُنَّا لَمُبۡتَلِينَ
Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ أَنشَأۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِمۡ قَرۡنًا ءَاخَرِينَ
Sima na bango tokelaki bato basusu.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَرۡسَلۡنَا فِيهِمۡ رَسُولٗا مِّنۡهُمۡ أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥٓۚ أَفَلَا تَتَّقُونَ
Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقَالَ ٱلۡمَلَأُ مِن قَوۡمِهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱلۡأٓخِرَةِ وَأَتۡرَفۡنَٰهُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا مَا هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يَأۡكُلُ مِمَّا تَأۡكُلُونَ مِنۡهُ وَيَشۡرَبُ مِمَّا تَشۡرَبُونَ
Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَئِنۡ أَطَعۡتُم بَشَرٗا مِّثۡلَكُمۡ إِنَّكُمۡ إِذٗا لَّخَٰسِرُونَ
Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَيَعِدُكُمۡ أَنَّكُمۡ إِذَا مِتُّمۡ وَكُنتُمۡ تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَنَّكُم مُّخۡرَجُونَ
Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)?
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ هَيۡهَاتَ هَيۡهَاتَ لِمَا تُوعَدُونَ
Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنۡ هِيَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنۡيَا نَمُوتُ وَنَحۡيَا وَمَا نَحۡنُ بِمَبۡعُوثِينَ
Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنۡ هُوَ إِلَّا رَجُلٌ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا وَمَا نَحۡنُ لَهُۥ بِمُؤۡمِنِينَ
Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبِّ ٱنصُرۡنِي بِمَا كَذَّبُونِ
Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ عَمَّا قَلِيلٖ لَّيُصۡبِحُنَّ نَٰدِمِينَ
(Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّيۡحَةُ بِٱلۡحَقِّ فَجَعَلۡنَٰهُمۡ غُثَآءٗۚ فَبُعۡدٗا لِّلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ أَنشَأۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِمۡ قُرُونًا ءَاخَرِينَ
Sima na bango tokelaki bato basusu.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Mu’minūn
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close