Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Mu’minūn   Ayah:
وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءَۢ بِقَدَرٖ فَأَسۡكَنَّٰهُ فِي ٱلۡأَرۡضِۖ وَإِنَّا عَلَىٰ ذَهَابِۭ بِهِۦ لَقَٰدِرُونَ
Mpe tozali kokitisa mayi kowuta o likolo na bokoki (mayi wana eleka ebele te), sima tovandisi yango na mabele, mpe tozali na bokoki ya kobungisa yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَنشَأۡنَا لَكُم بِهِۦ جَنَّٰتٖ مِّن نَّخِيلٖ وَأَعۡنَٰبٖ لَّكُمۡ فِيهَا فَوَٰكِهُ كَثِيرَةٞ وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ
Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَشَجَرَةٗ تَخۡرُجُ مِن طُورِ سَيۡنَآءَ تَنۢبُتُ بِٱلدُّهۡنِ وَصِبۡغٖ لِّلۡأٓكِلِينَ
Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِنَّ لَكُمۡ فِي ٱلۡأَنۡعَٰمِ لَعِبۡرَةٗۖ نُّسۡقِيكُم مِّمَّا فِي بُطُونِهَا وَلَكُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ كَثِيرَةٞ وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ
Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَلَيۡهَا وَعَلَى ٱلۡفُلۡكِ تُحۡمَلُونَ
Mpe na yango na bamasuwa bozali kokumbama.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوۡمِهِۦ فَقَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥٓۚ أَفَلَا تَتَّقُونَ
Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te?
Arabic explanations of the Qur’an:
فَقَالَ ٱلۡمَلَؤُاْ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَوۡمِهِۦ مَا هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يُرِيدُ أَن يَتَفَضَّلَ عَلَيۡكُمۡ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَأَنزَلَ مَلَٰٓئِكَةٗ مَّا سَمِعۡنَا بِهَٰذَا فِيٓ ءَابَآئِنَا ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe bankumu bapengwi okati na bato naye balobi: Nini oyo, azali moto lokola bino. Alingi amatela bino, soki Allah alingaka, (kotinda ntoma) mbele akitisaki ba anzelu. Makambo oyo totikala koyoka yango epai ya bankoko na biso ya kala te.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنۡ هُوَ إِلَّا رَجُلُۢ بِهِۦ جِنَّةٞ فَتَرَبَّصُواْ بِهِۦ حَتَّىٰ حِينٖ
Oyo sé moto ya ligboma, bótala ye sima ya tango токе.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبِّ ٱنصُرۡنِي بِمَا كَذَّبُونِ
Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡهِ أَنِ ٱصۡنَعِ ٱلۡفُلۡكَ بِأَعۡيُنِنَا وَوَحۡيِنَا فَإِذَا جَآءَ أَمۡرُنَا وَفَارَ ٱلتَّنُّورُ فَٱسۡلُكۡ فِيهَا مِن كُلّٖ زَوۡجَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِ وَأَهۡلَكَ إِلَّا مَن سَبَقَ عَلَيۡهِ ٱلۡقَوۡلُ مِنۡهُمۡۖ وَلَا تُخَٰطِبۡنِي فِي ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ إِنَّهُم مُّغۡرَقُونَ
Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu,[1] kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa).
[1] Litumbu: Elingi koloba: Esika batumbaka mapa, kasi awa ezalaki likamuisi тропа Nûh to тропа kolakisa boyeyi ya etumbu nde yango mayi ebimaki.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Mu’minūn
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close