Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Anbiyā’   Ayah:
وَجَعَلۡنَٰهُمۡ أَئِمَّةٗ يَهۡدُونَ بِأَمۡرِنَا وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡهِمۡ فِعۡلَ ٱلۡخَيۡرَٰتِ وَإِقَامَ ٱلصَّلَوٰةِ وَإِيتَآءَ ٱلزَّكَوٰةِۖ وَكَانُواْ لَنَا عَٰبِدِينَ
Mpe totiyaki bango bakambi, mpo bakamba na mibeko mia biso, mpe tolakisaki bango kosala bolamu, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat mpe bazalaki babondeli na biso.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلُوطًا ءَاتَيۡنَٰهُ حُكۡمٗا وَعِلۡمٗا وَنَجَّيۡنَٰهُ مِنَ ٱلۡقَرۡيَةِ ٱلَّتِي كَانَت تَّعۡمَلُ ٱلۡخَبَٰٓئِثَۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمَ سَوۡءٖ فَٰسِقِينَ
Mpe topesaki Loth bwanya na boyebi, mpe tobikisaki ye na mboka oyo bazalaki kosala mabe. Ya soló, bazalaki bato mabe mpe bazangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَدۡخَلۡنَٰهُ فِي رَحۡمَتِنَآۖ إِنَّهُۥ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe tokotisaki ye na mawa та biso, ya sólo azali kati na bato ya malamu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَنُوحًا إِذۡ نَادَىٰ مِن قَبۡلُ فَٱسۡتَجَبۡنَا لَهُۥ فَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tango Núh abelelaki liboso, tondimelaki ye, mpe tobikisaki ye na libota lia ye kowuta na milelo monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَنَصَرۡنَٰهُ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمَ سَوۡءٖ فَأَغۡرَقۡنَٰهُمۡ أَجۡمَعِينَ
Mpe tolongisaki ye kowuta na bato baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe bazuaki yango ete: Ezali lokuta. Ya soló, bazalaki bato ya mabe, mpe tozindisaki bango banso.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَدَاوُۥدَ وَسُلَيۡمَٰنَ إِذۡ يَحۡكُمَانِ فِي ٱلۡحَرۡثِ إِذۡ نَفَشَتۡ فِيهِ غَنَمُ ٱلۡقَوۡمِ وَكُنَّا لِحُكۡمِهِمۡ شَٰهِدِينَ
Mpe Dâwud na Suleyman, tango basambisaki тропа bilanga oyo bameme ya bato bakendaki kolia yango na butu, mpe tozalaki nzeneneke тропа bosambisi bwa bango mibale.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَفَهَّمۡنَٰهَا سُلَيۡمَٰنَۚ وَكُلًّا ءَاتَيۡنَا حُكۡمٗا وَعِلۡمٗاۚ وَسَخَّرۡنَا مَعَ دَاوُۥدَ ٱلۡجِبَالَ يُسَبِّحۡنَ وَٱلطَّيۡرَۚ وَكُنَّا فَٰعِلِينَ
Mpe topesaki Suleyman bososoli na yango, mpe topesaki bango banso bwanya mpe boyebi, mpe topesaki ngolu na biso epai ya Dâwud ete: Bangomba mpe bandeke basanzola biso elongo naye, mpe biso nde tozalaki kosala yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَلَّمۡنَٰهُ صَنۡعَةَ لَبُوسٖ لَّكُمۡ لِتُحۡصِنَكُم مِّنۢ بَأۡسِكُمۡۖ فَهَلۡ أَنتُمۡ شَٰكِرُونَ
Mpe tolakisaki ye kosala nguba[1] mpo ezala lisungi lia bino, boye bozali na botondi?
[1] Nguba: Ezali elamba oyo ebatelaka na bitumba.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلِسُلَيۡمَٰنَ ٱلرِّيحَ عَاصِفَةٗ تَجۡرِي بِأَمۡرِهِۦٓ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ ٱلَّتِي بَٰرَكۡنَا فِيهَاۚ وَكُنَّا بِكُلِّ شَيۡءٍ عَٰلِمِينَ
Mpe tondimelaki Suleyman, mopepe moye na motindo naye mopepaki noki noki о ngambu ya mabele maye topambolaki yango. Mpe tozali bayebi ya biloko binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Anbiyā’
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close