Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Anbiyā’   Ayah:

Al-Anbiyâ

ٱقۡتَرَبَ لِلنَّاسِ حِسَابُهُمۡ وَهُمۡ فِي غَفۡلَةٖ مُّعۡرِضُونَ
Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرٖ مِّن رَّبِّهِم مُّحۡدَثٍ إِلَّا ٱسۡتَمَعُوهُ وَهُمۡ يَلۡعَبُونَ
Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَاهِيَةٗ قُلُوبُهُمۡۗ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّجۡوَى ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ هَلۡ هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡۖ أَفَتَأۡتُونَ ٱلسِّحۡرَ وَأَنتُمۡ تُبۡصِرُونَ
Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالَ رَبِّي يَعۡلَمُ ٱلۡقَوۡلَ فِي ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
بَلۡ قَالُوٓاْ أَضۡغَٰثُ أَحۡلَٰمِۭ بَلِ ٱفۡتَرَىٰهُ بَلۡ هُوَ شَاعِرٞ فَلۡيَأۡتِنَا بِـَٔايَةٖ كَمَآ أُرۡسِلَ ٱلۡأَوَّلُونَ
Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَآ ءَامَنَتۡ قَبۡلَهُم مِّن قَرۡيَةٍ أَهۡلَكۡنَٰهَآۖ أَفَهُمۡ يُؤۡمِنُونَ
Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ إِلَّا رِجَالٗا نُّوحِيٓ إِلَيۡهِمۡۖ فَسۡـَٔلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلذِّكۡرِ إِن كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا جَعَلۡنَٰهُمۡ جَسَدٗا لَّا يَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَمَا كَانُواْ خَٰلِدِينَ
Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ صَدَقۡنَٰهُمُ ٱلۡوَعۡدَ فَأَنجَيۡنَٰهُمۡ وَمَن نَّشَآءُ وَأَهۡلَكۡنَا ٱلۡمُسۡرِفِينَ
Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَقَدۡ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكُمۡ كِتَٰبٗا فِيهِ ذِكۡرُكُمۡۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te?
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Anbiyā’
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close