Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-মু'মিনূন   আয়াত:
أَلَمۡ تَكُنۡ ءَايَٰتِي تُتۡلَىٰ عَلَيۡكُمۡ فَكُنتُم بِهَا تُكَذِّبُونَ
Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالُواْ رَبَّنَا غَلَبَتۡ عَلَيۡنَا شِقۡوَتُنَا وَكُنَّا قَوۡمٗا ضَآلِّينَ
Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
رَبَّنَآ أَخۡرِجۡنَا مِنۡهَا فَإِنۡ عُدۡنَا فَإِنَّا ظَٰلِمُونَ
Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ ٱخۡسَـُٔواْ فِيهَا وَلَا تُكَلِّمُونِ
Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّهُۥ كَانَ فَرِيقٞ مِّنۡ عِبَادِي يَقُولُونَ رَبَّنَآ ءَامَنَّا فَٱغۡفِرۡ لَنَا وَٱرۡحَمۡنَا وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلرَّٰحِمِينَ
Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱتَّخَذۡتُمُوهُمۡ سِخۡرِيًّا حَتَّىٰٓ أَنسَوۡكُمۡ ذِكۡرِي وَكُنتُم مِّنۡهُمۡ تَضۡحَكُونَ
Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنِّي جَزَيۡتُهُمُ ٱلۡيَوۡمَ بِمَا صَبَرُوٓاْ أَنَّهُمۡ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَٰلَ كَمۡ لَبِثۡتُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ عَدَدَ سِنِينَ
Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالُواْ لَبِثۡنَا يَوۡمًا أَوۡ بَعۡضَ يَوۡمٖ فَسۡـَٔلِ ٱلۡعَآدِّينَ
Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَٰلَ إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا قَلِيلٗاۖ لَّوۡ أَنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَفَحَسِبۡتُمۡ أَنَّمَا خَلَقۡنَٰكُمۡ عَبَثٗا وَأَنَّكُمۡ إِلَيۡنَا لَا تُرۡجَعُونَ
Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَتَعَٰلَى ٱللَّهُ ٱلۡمَلِكُ ٱلۡحَقُّۖ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ رَبُّ ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡكَرِيمِ
Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَمَن يَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ لَا بُرۡهَٰنَ لَهُۥ بِهِۦ فَإِنَّمَا حِسَابُهُۥ عِندَ رَبِّهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلۡكَٰفِرُونَ
Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَقُل رَّبِّ ٱغۡفِرۡ وَٱرۡحَمۡ وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلرَّٰحِمِينَ
Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-মু'মিনূন
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ