Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-মু'মিনূন   আয়াত:

Al-Mu’minûna

قَدۡ أَفۡلَحَ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
Bandimi basila kolonga.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي صَلَاتِهِمۡ خَٰشِعُونَ
Baye bamikitisaka tango bazali kosambela.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَنِ ٱللَّغۡوِ مُعۡرِضُونَ
Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِلزَّكَوٰةِ فَٰعِلُونَ
Mpe baye bazali kobimisa zakat.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِفُرُوجِهِمۡ حَٰفِظُونَ
Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِلَّا عَلَىٰٓ أَزۡوَٰجِهِمۡ أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ فَإِنَّهُمۡ غَيۡرُ مَلُومِينَ
Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَمَنِ ٱبۡتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡعَادُونَ
Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِأَمَٰنَٰتِهِمۡ وَعَهۡدِهِمۡ رَٰعُونَ
Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَوَٰتِهِمۡ يُحَافِظُونَ
Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡوَٰرِثُونَ
Bango nde bakitani.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِينَ يَرِثُونَ ٱلۡفِرۡدَوۡسَ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِن سُلَٰلَةٖ مِّن طِينٖ
Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ جَعَلۡنَٰهُ نُطۡفَةٗ فِي قَرَارٖ مَّكِينٖ
Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ خَلَقۡنَا ٱلنُّطۡفَةَ عَلَقَةٗ فَخَلَقۡنَا ٱلۡعَلَقَةَ مُضۡغَةٗ فَخَلَقۡنَا ٱلۡمُضۡغَةَ عِظَٰمٗا فَكَسَوۡنَا ٱلۡعِظَٰمَ لَحۡمٗا ثُمَّ أَنشَأۡنَٰهُ خَلۡقًا ءَاخَرَۚ فَتَبَارَكَ ٱللَّهُ أَحۡسَنُ ٱلۡخَٰلِقِينَ
Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ إِنَّكُم بَعۡدَ ذَٰلِكَ لَمَيِّتُونَ
Sima na yango bokokufaka ya soló,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ إِنَّكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ تُبۡعَثُونَ
Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا فَوۡقَكُمۡ سَبۡعَ طَرَآئِقَ وَمَا كُنَّا عَنِ ٱلۡخَلۡقِ غَٰفِلِينَ
Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-মু'মিনূন
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ