Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-বাক্বাৰাহ   আয়াত:
وَإِذۡ نَجَّيۡنَٰكُم مِّنۡ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ يَسُومُونَكُمۡ سُوٓءَ ٱلۡعَذَابِ يُذَبِّحُونَ أَبۡنَآءَكُمۡ وَيَسۡتَحۡيُونَ نِسَآءَكُمۡۚ وَفِي ذَٰلِكُم بَلَآءٞ مِّن رَّبِّكُمۡ عَظِيمٞ
Mpe ntango tobikisaki bino epai ya bato ya falo, bazalaki konyokola bino na bitumbu binene, bazalaki kokata bakingo ya bana na bino mpe bazalaki kotika basi na bino na bomoyi mpe bozalaki na mimekano minene kowuta epai ya Nkolo wa bino.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ فَرَقۡنَا بِكُمُ ٱلۡبَحۡرَ فَأَنجَيۡنَٰكُمۡ وَأَغۡرَقۡنَآ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
Mpe tango tokabolaki ebale mpo na bino (bokatisa ngambo esusu), mpe ya sôló tobikisaki bino mpe tozindisaki bato ya falo okati ya mayi, na bino bozalaki komona.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ وَٰعَدۡنَا مُوسَىٰٓ أَرۡبَعِينَ لَيۡلَةٗ ثُمَّ ٱتَّخَذۡتُمُ ٱلۡعِجۡلَ مِنۢ بَعۡدِهِۦ وَأَنتُمۡ ظَٰلِمُونَ
Mpe tango topesaki elaka epai ya Mûssa babutu ntuku minei, mpe bobondelaki mwana ngombe sima naye, mpe bozalaki babubi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ عَفَوۡنَا عَنكُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
Sima, tolimbisaki bino na yango, mpo ete bokoka kotondo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡفُرۡقَانَ لَعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
Mpe tango topesaki Mûssa buku mpe bososoli mpo ete bino bokambama.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦ يَٰقَوۡمِ إِنَّكُمۡ ظَلَمۡتُمۡ أَنفُسَكُم بِٱتِّخَاذِكُمُ ٱلۡعِجۡلَ فَتُوبُوٓاْ إِلَىٰ بَارِئِكُمۡ فَٱقۡتُلُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ عِندَ بَارِئِكُمۡ فَتَابَ عَلَيۡكُمۡۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Eh bino bato na ngai! ya sôló bino bomibubaki bino moko mpona kobondela mwana ngombe mpe botubela epai na Nkolo na bino, bomiboma kati kati na bino, wana nde ezali malamu epai ya Nkolo na bino. Mpe ayambi tubela na bino, ya sôló ye nde molimbisi atonda ngolu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ قُلۡتُمۡ يَٰمُوسَىٰ لَن نُّؤۡمِنَ لَكَ حَتَّىٰ نَرَى ٱللَّهَ جَهۡرَةٗ فَأَخَذَتۡكُمُ ٱلصَّٰعِقَةُ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
Mpe tango bolobaki: Eh Mûssa! Tokoki kondimela yo te kino tomona Allah polele, lokito ya nkake ebetaki bino, mpe bino bozalaki kotala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ بَعَثۡنَٰكُم مِّنۢ بَعۡدِ مَوۡتِكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
Sima, tosekwisaki bino sima ya bino kokufa mpo ete bokoka kotondo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَظَلَّلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡغَمَامَ وَأَنزَلۡنَا عَلَيۡكُمُ ٱلۡمَنَّ وَٱلسَّلۡوَىٰۖ كُلُواْ مِن طَيِّبَٰتِ مَا رَزَقۡنَٰكُمۡۚ وَمَا ظَلَمُونَا وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
Mpe tobombaki bino okati ya elili ya londende, mpe tokitiselaki bino manna[1] mpe salwa,[2] bolia bilei ya malamu biye bipesamaki mpona bino, mpe babubaki biso te kasi bango moko bamibubaki.
[1] Manna: Ezali: Masanga ya sukali oyo ezali lokola mafuta ya nzoyi.
[2] Salwa: Ezali: Ndeke ya moke oyo ezali na mosuni ya elengi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-বাক্বাৰাহ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ