Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-বাক্বাৰাহ   আয়াত:
قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا هِيَ إِنَّ ٱلۡبَقَرَ تَشَٰبَهَ عَلَيۡنَا وَإِنَّآ إِن شَآءَ ٱللَّهُ لَمُهۡتَدُونَ
Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa polele ngombe yango, ya sôló, epai na biso bangombe bazali lolenge moko. Mpe ya sôló biso na bolingi ya Allah tokokambama.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ لَّا ذَلُولٞ تُثِيرُ ٱلۡأَرۡضَ وَلَا تَسۡقِي ٱلۡحَرۡثَ مُسَلَّمَةٞ لَّا شِيَةَ فِيهَاۚ قَالُواْ ٱلۡـَٰٔنَ جِئۡتَ بِٱلۡحَقِّۚ فَذَبَحُوهَا وَمَا كَادُواْ يَفۡعَلُونَ
(Mûssa) alobaki: Ya sôló Nkolo wa bino alobi: Ya sôló ngombe yango ezala te oyo enuni na mosala ya bilanga, ezala te mpe ngombe ya makolo matengama to mabukama te. Balobaki: sika oyo nde olobi bosembo, mpe basasaki yango, pe bazalaki mpenza na posa ya kosala yango te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذۡ قَتَلۡتُمۡ نَفۡسٗا فَٱدَّٰرَٰءۡتُمۡ فِيهَاۖ وَٱللَّهُ مُخۡرِجٞ مَّا كُنتُمۡ تَكۡتُمُونَ
Mpe tango bobomaki moto, mpe moko na moko kati na bino abandaki koluka koyeba nani mobomi, mpe Allah nde mobimisi maye bino bozali kobomba.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَقُلۡنَا ٱضۡرِبُوهُ بِبَعۡضِهَاۚ كَذَٰلِكَ يُحۡيِ ٱللَّهُ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَيُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ لَعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
Mpe tolobaki:[1] bobeta ye[2] na ndambo na yango,[3] na ndenge wana nde Allah akosekwisa bawei, mpe Allah azali kolakisa bino bilembo biye mpo ete bino bososola.
[1] Allah. [2] Moweyi.[3] Ngombe.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ قَسَتۡ قُلُوبُكُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ فَهِيَ كَٱلۡحِجَارَةِ أَوۡ أَشَدُّ قَسۡوَةٗۚ وَإِنَّ مِنَ ٱلۡحِجَارَةِ لَمَا يَتَفَجَّرُ مِنۡهُ ٱلۡأَنۡهَٰرُۚ وَإِنَّ مِنۡهَا لَمَا يَشَّقَّقُ فَيَخۡرُجُ مِنۡهُ ٱلۡمَآءُۚ وَإِنَّ مِنۡهَا لَمَا يَهۡبِطُ مِنۡ خَشۡيَةِ ٱللَّهِۗ وَمَا ٱللَّهُ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ
Sima mitema mia bino mikomaki makasi. Lokola mabanga to makasi koleka mabanga, pamba te ya sôló kati ya mabanga, misusu mingala mizali kobima kati na yango, mpe mabanga misusu mizali kopasuka mpe mibimisi mayi, mpe ya sôló okati ya mabanga misusu ekweyaka mpona bobangi Allah. Mpe Allah abosani te maye bozali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ أَفَتَطۡمَعُونَ أَن يُؤۡمِنُواْ لَكُمۡ وَقَدۡ كَانَ فَرِيقٞ مِّنۡهُمۡ يَسۡمَعُونَ كَلَٰمَ ٱللَّهِ ثُمَّ يُحَرِّفُونَهُۥ مِنۢ بَعۡدِ مَا عَقَلُوهُ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
Boye bozali kolikia (bamizilima) ete bato ya motindo wana (bayuda), bakondimela bino? Mpe ya sôló lisanga ezalaki kati na bango bazalaki koyoka maloba ya Allah, mpe babaloli yango sima na bango kozua mayele, mpe bango bazali koyeba?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِذَا لَقُواْ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ قَالُوٓاْ ءَامَنَّا وَإِذَا خَلَا بَعۡضُهُمۡ إِلَىٰ بَعۡضٖ قَالُوٓاْ أَتُحَدِّثُونَهُم بِمَا فَتَحَ ٱللَّهُ عَلَيۡكُمۡ لِيُحَآجُّوكُم بِهِۦ عِندَ رَبِّكُمۡۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Mpe tango bakokutana (bayuda) na baye bandima (bamizilima), bakolobaka: Tondimi; mpe soki bazali bango na bango (bayuda), bakolobaka: Bokoyebisa bango mpona maye Allah afungoleli bino? Mpo bazala na maloba ya elonga Likolo na bino liboso lia Nkolo wa bino, Boye bozali na mayele te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-বাক্বাৰাহ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ