Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: ইউনুছ   আয়াত:
وَمِنۡهُم مَّن يَنظُرُ إِلَيۡكَۚ أَفَأَنتَ تَهۡدِي ٱلۡعُمۡيَ وَلَوۡ كَانُواْ لَا يُبۡصِرُونَ
Mpe kati na bango, baye bazali kotala yo. Boye yo nde okambaka bakufi miso, ata soki bazali kornona te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَظۡلِمُ ٱلنَّاسَ شَيۡـٔٗا وَلَٰكِنَّ ٱلنَّاسَ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
Ya soló, Allah abubaka bato na eloko te, bato bango moko nde bazali komibuba.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ كَأَن لَّمۡ يَلۡبَثُوٓاْ إِلَّا سَاعَةٗ مِّنَ ٱلنَّهَارِ يَتَعَارَفُونَ بَيۡنَهُمۡۚ قَدۡ خَسِرَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱللَّهِ وَمَا كَانُواْ مُهۡتَدِينَ
Mpe mokolo oyo akosangisa bango, ekozala lokola bavandaki ngonga moko ya mokolo, bakoyebana bango na bango. Kasi baye bazali koboya kondima na bokutani na Allah, bango nde bazangi, mpe bakambami te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَإِمَّا نُرِيَنَّكَ بَعۡضَ ٱلَّذِي نَعِدُهُمۡ أَوۡ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِلَيۡنَا مَرۡجِعُهُمۡ ثُمَّ ٱللَّهُ شَهِيدٌ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ
Mpe soki tolingi tokolakisa yo ndambu ya etumbu oyo tokani тропа bango, to mpe okokufa liboso mpo ete eyela bango sima nayo, mpe na sima epai na biso nde bakozongisama, mpe na suka Allah azali nzeneneke likolo ya maye bazali kosala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلِكُلِّ أُمَّةٖ رَّسُولٞۖ فَإِذَا جَآءَ رَسُولُهُمۡ قُضِيَ بَيۡنَهُم بِٱلۡقِسۡطِ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
Mpe umma[1] nionso ezali na motindami. Mpe tango motindami na bango ayaki makambo ekatanaki na bosembo, mpe moko te abubamaki.
[1] Umma: Ezali etonga: Allah azalaki kotinda na etonga nionso motindami to ntoma, kowuta na Adam, kino Muhammad oyo azali motindami mpe ntoma yasuka na ndembe na biso bótala mpe na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali bato ya bosembo?.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُل لَّآ أَمۡلِكُ لِنَفۡسِي ضَرّٗا وَلَا نَفۡعًا إِلَّا مَا شَآءَ ٱللَّهُۗ لِكُلِّ أُمَّةٍ أَجَلٌۚ إِذَا جَآءَ أَجَلُهُمۡ فَلَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ سَاعَةٗ وَلَا يَسۡتَقۡدِمُونَ
Loba: Nazali na eloko moko te ya kosala na nzoto na ngai kowuta na pasi to bisengo sé maye Allah akolinga. Mpe umma nionso bazali na elaka na bango. Soki ngonga yango ekoki, bakozongisa yango sima te, mpe bakotindika yango liboso te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِنۡ أَتَىٰكُمۡ عَذَابُهُۥ بَيَٰتًا أَوۡ نَهَارٗا مَّاذَا يَسۡتَعۡجِلُ مِنۡهُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
Loba: Bomoni boni, soki etumbu naye eyeli bino na butu mpe na moyi? Boye batomboki bakoki kokima yango?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَثُمَّ إِذَا مَا وَقَعَ ءَامَنتُم بِهِۦٓۚ ءَآلۡـَٰٔنَ وَقَدۡ كُنتُم بِهِۦ تَسۡتَعۡجِلُونَ
Mpe boye soki (etumbu) ekweyeli bino bokondimaka na yango? (bakoyebisaka bino) sikoyo; bozalaki kolinga eyela bino noki?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ قِيلَ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ ذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡخُلۡدِ هَلۡ تُجۡزَوۡنَ إِلَّا بِمَا كُنتُمۡ تَكۡسِبُونَ
Sima ekolobama na baye basalaki mabe ete: Bomeka etumbu ya libela, boye bokofutama sé na maye bosalaki?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ وَيَسۡتَنۢبِـُٔونَكَ أَحَقٌّ هُوَۖ قُلۡ إِي وَرَبِّيٓ إِنَّهُۥ لَحَقّٞۖ وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ
Mpe bazali kotuna yo sango ya etumbu mpe lisekwa ete: Ezali ya soló? Loba: Iyo; nalapi na Nkolo wa ngai! Ezali ya soló penza. Mpe bokokoka kokima yango te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: ইউনুছ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ