Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: ইউনুছ   আয়াত:
۞ وَٱتۡلُ عَلَيۡهِمۡ نَبَأَ نُوحٍ إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦ يَٰقَوۡمِ إِن كَانَ كَبُرَ عَلَيۡكُم مَّقَامِي وَتَذۡكِيرِي بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَعَلَى ٱللَّهِ تَوَكَّلۡتُ فَأَجۡمِعُوٓاْ أَمۡرَكُمۡ وَشُرَكَآءَكُمۡ ثُمَّ لَا يَكُنۡ أَمۡرُكُمۡ عَلَيۡكُمۡ غُمَّةٗ ثُمَّ ٱقۡضُوٓاْ إِلَيَّ وَلَا تُنظِرُونِ
Mpe betela bango sango ya Nûh, tango alobaki na bato naye: Oh bato na ngai! Soki kofanda na ngai na bino, mpe mateya na ngai тропа bilembo ya Allah eleki bino kilo, kasi namipesi (mobimba mwa ngai) nyonso epai ya Allah. Boyokana na basangani ba bino banso mpe bobomba makanisi та bino te. Sima bozuela ngai mokano, kasi bozelisa te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَمَا سَأَلۡتُكُم مِّنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِۖ وَأُمِرۡتُ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
Kasi soki bopesi mikongo na koboya, nasengi bino lifuta te, lifuta lia ngai likowutaka sé epai ya Allah, тре natindamaki mpo nazala o kati ya bamizilima.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَكَذَّبُوهُ فَنَجَّيۡنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ فِي ٱلۡفُلۡكِ وَجَعَلۡنَٰهُمۡ خَلَٰٓئِفَ وَأَغۡرَقۡنَا ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَاۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Baboyaki kondimela ye, mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe totiyelaki bango bakitani (kati na mokili) mpe tozindisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso. Tala ndenge suka ya bakebisami ezalaka.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ بَعَثۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِۦ رُسُلًا إِلَىٰ قَوۡمِهِمۡ فَجَآءُوهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَمَا كَانُواْ لِيُؤۡمِنُواْ بِمَا كَذَّبُواْ بِهِۦ مِن قَبۡلُۚ كَذَٰلِكَ نَطۡبَعُ عَلَىٰ قُلُوبِ ٱلۡمُعۡتَدِينَ
Sima naye, totindaki batindami epai ya bato ba bango, bayelaki bango bilembo, kasi bandimaki te, sé lokola baye baboyaki kondima liboso. Ndenge wana nde tokangaka mitema mia balekisi ndelo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ثُمَّ بَعَثۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِم مُّوسَىٰ وَهَٰرُونَ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦ بِـَٔايَٰتِنَا فَٱسۡتَكۡبَرُواْ وَكَانُواْ قَوۡمٗا مُّجۡرِمِينَ
Totindaki Mûssa na Hâruna[1] sima na bango, epai ya falo na bankumu naye na bilembo bia biso, basalaki lolendo, mpe bazalaki batomboki.
[1] Hâruna: Bótala suratu: Al-A’râf: 142, Al-An’âm: 84, An-Nisâ: 163, na sarati mokapo: 248.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَلَمَّا جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ مِنۡ عِندِنَا قَالُوٓاْ إِنَّ هَٰذَا لَسِحۡرٞ مُّبِينٞ
Mpe tango bosôló bwa biso boyelaki bango, balobi: Ya soló, oyo ezali bonganga ya polele!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالَ مُوسَىٰٓ أَتَقُولُونَ لِلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَكُمۡۖ أَسِحۡرٌ هَٰذَا وَلَا يُفۡلِحُ ٱلسَّٰحِرُونَ
Mpe Mûssa alobaki na bango été: Bokolobela bosôló na tango esili koyela bino? Kasi yango ezali bonganga mpe banganga balongaka te?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قَالُوٓاْ أَجِئۡتَنَا لِتَلۡفِتَنَا عَمَّا وَجَدۡنَا عَلَيۡهِ ءَابَآءَنَا وَتَكُونَ لَكُمَا ٱلۡكِبۡرِيَآءُ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا نَحۡنُ لَكُمَا بِمُؤۡمِنِينَ
Balobi: Oyeli biso mpo otiya biso mosika na maye tokutaki bankoko ba biso na yango mpo bokoma bato minene awa na mokili bino mibale? Kasi tokondimelaka bino te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: ইউনুছ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ