Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مائىدە   ئايەت:
قَالُواْ يَٰمُوسَىٰٓ إِنَّا لَن نَّدۡخُلَهَآ أَبَدٗا مَّا دَامُواْ فِيهَا فَٱذۡهَبۡ أَنتَ وَرَبُّكَ فَقَٰتِلَآ إِنَّا هَٰهُنَا قَٰعِدُونَ
Balobaki: Eh Mûssa! Ya sôló tango inso bato wana bazali, biso tokokota te. Kende yo na Nkolo nayo bobunda bino mibale, biso totikali awa tovandi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالَ رَبِّ إِنِّي لَآ أَمۡلِكُ إِلَّا نَفۡسِي وَأَخِيۖ فَٱفۡرُقۡ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡفَٰسِقِينَ
Alobi ete: Nkolo, nazali na bokoki te bobele likolo na ngai na ndeko na ngai, mpe kabola biso na bato mabe oyo.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالَ فَإِنَّهَا مُحَرَّمَةٌ عَلَيۡهِمۡۛ أَرۡبَعِينَ سَنَةٗۛ يَتِيهُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ فَلَا تَأۡسَ عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡفَٰسِقِينَ
(Allah) alobi ete: Ya sôló, bazali lisusu na ndingisa te ya kozua mboka oyo kino mbula ntuku minei mikoka, wapi epai bakotelengana na mokili. Komona mpasi te na motema mpona bato mabe.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
۞ وَٱتۡلُ عَلَيۡهِمۡ نَبَأَ ٱبۡنَيۡ ءَادَمَ بِٱلۡحَقِّ إِذۡ قَرَّبَا قُرۡبَانٗا فَتُقُبِّلَ مِنۡ أَحَدِهِمَا وَلَمۡ يُتَقَبَّلۡ مِنَ ٱلۡأٓخَرِ قَالَ لَأَقۡتُلَنَّكَۖ قَالَ إِنَّمَا يَتَقَبَّلُ ٱللَّهُ مِنَ ٱلۡمُتَّقِينَ
Mpe betela bango lisapo na bosembo lia bana mibale ya Âdam: ntango bafungolaki kopesa mbeka (likabo) moko ba ndimelaki ye, mosusu bandimeli ye te (oyo bandimelaki ye te) alobi (na mosusu wana): na koboma yo mpeza (ndeko naye) alobi: Ya sôló, (Allah) andimelaka baye babangaka.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
لَئِنۢ بَسَطتَ إِلَيَّ يَدَكَ لِتَقۡتُلَنِي مَآ أَنَا۠ بِبَاسِطٖ يَدِيَ إِلَيۡكَ لِأَقۡتُلَكَۖ إِنِّيٓ أَخَافُ ٱللَّهَ رَبَّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Soki otomboli loboko nayo mpona koboma ngai, nakotombola loboko na ngai te epai nayo mpona koboma yo. Yasôló, ngai nazali kobanga Allah Nkolo ya mikili.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنِّيٓ أُرِيدُ أَن تَبُوٓأَ بِإِثۡمِي وَإِثۡمِكَ فَتَكُونَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلنَّارِۚ وَذَٰلِكَ جَزَٰٓؤُاْ ٱلظَّٰلِمِينَ
Nalingi okende na masumu na ngai na oyo ya yo, mpe okozala kati ya bato ya moto, mpe wana nde lifuta lia babubi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَطَوَّعَتۡ لَهُۥ نَفۡسُهُۥ قَتۡلَ أَخِيهِ فَقَتَلَهُۥ فَأَصۡبَحَ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
Molimo mwa ye motombokisaki ye koboma ndeko naye, mpe abomaki ye mpe na sima akomaki elongo na bazangi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَبَعَثَ ٱللَّهُ غُرَابٗا يَبۡحَثُ فِي ٱلۡأَرۡضِ لِيُرِيَهُۥ كَيۡفَ يُوَٰرِي سَوۡءَةَ أَخِيهِۚ قَالَ يَٰوَيۡلَتَىٰٓ أَعَجَزۡتُ أَنۡ أَكُونَ مِثۡلَ هَٰذَا ٱلۡغُرَابِ فَأُوَٰرِيَ سَوۡءَةَ أَخِيۖ فَأَصۡبَحَ مِنَ ٱلنَّٰدِمِينَ
Mpe Allah atindaki kokombele abandi kotimola mabele liboso naye mpona kolakisa ye lolenge nini akokunda ebembe ya ndeko naye. Alobaki: Eh ngai! Mawa na ngai, nazangaki makasi mpe mayele kozala lokola Kokombele mpo nakoka kokunda Ebembe ya ndeko na ngai? Mpe akomaki moto ya makanisi ya mpasi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مائىدە
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش