Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مائىدە   ئايەت:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّخِذُواْ ٱلۡيَهُودَ وَٱلنَّصَٰرَىٰٓ أَوۡلِيَآءَۘ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلِيَآءُ بَعۡضٖۚ وَمَن يَتَوَلَّهُم مِّنكُمۡ فَإِنَّهُۥ مِنۡهُمۡۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Eh! Bino bandimi! Bozua bayuda na baklisto baninga te, bazali baninga bango na bango. Oyo okati na bino akozua bango baninga, ayeba ete asili kokoma moto na bango. Mpamba te Allah akambaka bato ya mabe te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَتَرَى ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ يُسَٰرِعُونَ فِيهِمۡ يَقُولُونَ نَخۡشَىٰٓ أَن تُصِيبَنَا دَآئِرَةٞۚ فَعَسَى ٱللَّهُ أَن يَأۡتِيَ بِٱلۡفَتۡحِ أَوۡ أَمۡرٖ مِّنۡ عِندِهِۦ فَيُصۡبِحُواْ عَلَىٰ مَآ أَسَرُّواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ نَٰدِمِينَ
Kasi, okomona baye bazali na bokono o mitema mia bango, bakokende na lombango epai na bango, bazali koloba ete: Tozali kobanga mpo basala biso mabe te. Nzoka nde, Allah tango mosusu akoya na elonga to makambo mosusu kowuta epai naye na sima, bakotikala na mpasi na makanisi ya mabe oyo babombi na kati ya mitema na bango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَهَٰٓؤُلَآءِ ٱلَّذِينَ أَقۡسَمُواْ بِٱللَّهِ جَهۡدَ أَيۡمَٰنِهِمۡ إِنَّهُمۡ لَمَعَكُمۡۚ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فَأَصۡبَحُواْ خَٰسِرِينَ
Mpe bandimi bakolobaka ete: Ba oyo nde ya sôló baye balapaki ndayi na bokasi bonso na nkombo ya Allah bazali na bino elongo? Misala mia bango mibebisami mpe bakomi bazangi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَن يَرۡتَدَّ مِنكُمۡ عَن دِينِهِۦ فَسَوۡفَ يَأۡتِي ٱللَّهُ بِقَوۡمٖ يُحِبُّهُمۡ وَيُحِبُّونَهُۥٓ أَذِلَّةٍ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ أَعِزَّةٍ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ يُجَٰهِدُونَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَلَا يَخَافُونَ لَوۡمَةَ لَآئِمٖۚ ذَٰلِكَ فَضۡلُ ٱللَّهِ يُؤۡتِيهِ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٌ
Eh bino bandimi! Oyo okati na bino akotika lingomba naye, ayeba ete Allah akoyakaka na bato mosusu, ye alingi bango, bango mpe balingi ye, bakozala malamu na bandimi, makasi mpe mawa te likolo ya bapagano. Bakobunda na nzela ya Allah mpe bakobangaka te ete balobela bango (to basuanisa bango). Wana ezali bolamu ya Allah. Apesaka yango moto ye alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka mpe moyebi ya manso.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنَّمَا وَلِيُّكُمُ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُمۡ رَٰكِعُونَ
Ya sôló, Allah nde azali mosungi na bino na motindami naye, ndenge moko na bandimi baye batelemisaka losambo mpe bafutaka zakat mpe bagumbamelaka (Allah).
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَمَن يَتَوَلَّ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ فَإِنَّ حِزۡبَ ٱللَّهِ هُمُ ٱلۡغَٰلِبُونَ
Mpe oyo akozua Allah mosungi mpe motindami naye, na baye bandima, ya sôló bango nde lisanga ya balongi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّخِذُواْ ٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ دِينَكُمۡ هُزُوٗا وَلَعِبٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ مِن قَبۡلِكُمۡ وَٱلۡكُفَّارَ أَوۡلِيَآءَۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
Eh bino bandimi! Baye bazali kozua lingomba na bino na liseki mpe kotiola yango kati na baye bazua buku liboso na bino, bozua bango na bapagano baninga te, mpe bobanga Allah soki ya sôló bozali bandimi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مائىدە
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش