Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ئال ئىمران   ئايەت:
لَن تَنَالُواْ ٱلۡبِرَّ حَتَّىٰ تُنفِقُواْ مِمَّا تُحِبُّونَۚ وَمَا تُنفِقُواْ مِن شَيۡءٖ فَإِنَّ ٱللَّهَ بِهِۦ عَلِيمٞ
Bokozwa bolamu te kino bokobimisa ya malamu okati ya maye bolingaka. Mpe na nyoso oyo bobimisaka, ya sôló Allah ayebi yango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
۞ كُلُّ ٱلطَّعَامِ كَانَ حِلّٗا لِّبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ إِلَّا مَا حَرَّمَ إِسۡرَٰٓءِيلُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦ مِن قَبۡلِ أَن تُنَزَّلَ ٱلتَّوۡرَىٰةُۚ قُلۡ فَأۡتُواْ بِٱلتَّوۡرَىٰةِ فَٱتۡلُوهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Bilei binso bindimamaki kolia mpona bana ya isalayele, longola sé biye isalayele amipekisaki yambo ete torah[1] ekita, loba na bango ete: Boya na torah mpe botanga yango soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
[1] Bótala na mikapo 3, 48 na 65.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَمَنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ
Mpe oyo akobukela Allah lokuta sima na yango, bango wana bazali babubi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قُلۡ صَدَقَ ٱللَّهُۗ فَٱتَّبِعُواْ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِيمَ حَنِيفٗاۖ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
Loba: Allah olobi bosembo ete: Bolanda bosôló ya lingomba ya Ibrâhîm na kati ya bomoko ya Allah, kasi (Ibrâhîm) azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah).
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنَّ أَوَّلَ بَيۡتٖ وُضِعَ لِلنَّاسِ لَلَّذِي بِبَكَّةَ مُبَارَكٗا وَهُدٗى لِّلۡعَٰلَمِينَ
Ya sôló, ndako ya yambo oyo etiamaki na mokili mpona bato, ezali ndako esantu ya Makkah, oyo epambolama, yango ezali nzela ya bokambi mpona mokili mobimba.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فِيهِ ءَايَٰتُۢ بَيِّنَٰتٞ مَّقَامُ إِبۡرَٰهِيمَۖ وَمَن دَخَلَهُۥ كَانَ ءَامِنٗاۗ وَلِلَّهِ عَلَى ٱلنَّاسِ حِجُّ ٱلۡبَيۡتِ مَنِ ٱسۡتَطَاعَ إِلَيۡهِ سَبِيلٗاۚ وَمَن كَفَرَ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَنِيٌّ عَنِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Kati na yango bilembo bizali, ndakisa esika eye Ibrâhîm atelemaki. Oyo akokota na kati na yango abatelami. Mpe esengeli na bato kosala hajj pona Allah na ndako wana, mpo na moto oyo azui makoki ya kokoma kuna. Kasi oyo akoboya, ya sôló, Allah atonda bomengo koleka mokili mobimba.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قُلۡ يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَٱللَّهُ شَهِيدٌ عَلَىٰ مَا تَعۡمَلُونَ
Loba: Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe Allah azali nzeneneke na maye bozali kosala?
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قُلۡ يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ مَنۡ ءَامَنَ تَبۡغُونَهَا عِوَجٗا وَأَنتُمۡ شُهَدَآءُۗ وَمَا ٱللَّهُ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ
Loba: Eh baye bozua buku! Mpona nini bozali kopekisa bandimi na nzela ya (Allah) mpona koluka kotia mbilinga mbilinga mpe bino bozali banzeneneke? Mpe Allah abosani te na maye bozali kosala.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تُطِيعُواْ فَرِيقٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ يَرُدُّوكُم بَعۡدَ إِيمَٰنِكُمۡ كَٰفِرِينَ
Eh bino bandimi! Soki botosi lisanga kati ya baye bazua buku liboso, bakozongisa bino na bopengwi sima ya kondima na bino.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ئال ئىمران
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش