Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ئال ئىمران   ئايەت:

Al-Imrân

الٓمٓ
Alif, Lâm, Mîm.[1]
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mokapo 1.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡحَيُّ ٱلۡقَيُّومُ
Allah, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
نَزَّلَ عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَأَنزَلَ ٱلتَّوۡرَىٰةَ وَٱلۡإِنجِيلَ
Akitiselaki yo[1] buku[2] na bosôló, ezali kondima na babuku ekitaka liboso. Mpe akitisi torah[3] mpe indjil.[4]
[1] Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
[2] Kurani.
[3] Torah: Ezali buku oyo Allah akitisaki ераї ya Mûssa.
[4] Indjil: Ezali buku oyo Allah akitisaki ераї ya Issa.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
مِن قَبۡلُ هُدٗى لِّلنَّاسِ وَأَنزَلَ ٱلۡفُرۡقَانَۗ إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٞ ذُو ٱنتِقَامٍ
Babuku biye bizalaki bokambi mpona bato. Na sima tokitisaki bososoli (eye ezali kokabola bosôló na lokuta). Ya sôló baye bazali kopengwa na bilembo to mpe mikapo mia Allah, bakozala na etumbu ya makasi. Allah azali makasi atonda nguya nakopesa etumbu.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَخۡفَىٰ عَلَيۡهِ شَيۡءٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ
Ya sôló eloko moko te ebombami epai na Allah. Ezala na nsé to na likolo.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
هُوَ ٱلَّذِي يُصَوِّرُكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡحَامِ كَيۡفَ يَشَآءُۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Ye nde azali kopesa bino balolenge kowuta na mabumu ya bamama na bino yambo ete bobotama ndenge alingi. Nzambe mosusu azali te sé ye wa bokasi atonda bwányá.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ مِنۡهُ ءَايَٰتٞ مُّحۡكَمَٰتٌ هُنَّ أُمُّ ٱلۡكِتَٰبِ وَأُخَرُ مُتَشَٰبِهَٰتٞۖ فَأَمَّا ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِمۡ زَيۡغٞ فَيَتَّبِعُونَ مَا تَشَٰبَهَ مِنۡهُ ٱبۡتِغَآءَ ٱلۡفِتۡنَةِ وَٱبۡتِغَآءَ تَأۡوِيلِهِۦۖ وَمَا يَعۡلَمُ تَأۡوِيلَهُۥٓ إِلَّا ٱللَّهُۗ وَٱلرَّٰسِخُونَ فِي ٱلۡعِلۡمِ يَقُولُونَ ءَامَنَّا بِهِۦ كُلّٞ مِّنۡ عِندِ رَبِّنَاۗ وَمَا يَذَّكَّرُ إِلَّآ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
رَبَّنَا لَا تُزِغۡ قُلُوبَنَا بَعۡدَ إِذۡ هَدَيۡتَنَا وَهَبۡ لَنَا مِن لَّدُنكَ رَحۡمَةًۚ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡوَهَّابُ
Eh Nkolo wa biso! Kobongola bosôló o mitema mia biso te, sima ya kokamba biso. Mpe pesa biso ngolu nayo. Ya sôló yo ozali mopesi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
رَبَّنَآ إِنَّكَ جَامِعُ ٱلنَّاسِ لِيَوۡمٖ لَّا رَيۡبَ فِيهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُخۡلِفُ ٱلۡمِيعَادَ
Eh Nkolo wa biso! Yo okosangisa bato o mokolo mwa mbano moye mokozala na ntembe te; ya sôló Allah azangisaka elaka naye te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: ئال ئىمران
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش