Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مەريەم   ئايەت:
وَنَٰدَيۡنَٰهُ مِن جَانِبِ ٱلطُّورِ ٱلۡأَيۡمَنِ وَقَرَّبۡنَٰهُ نَجِيّٗا
Mpe tobengaki ye (o ngambu ya mobali o ngomba ya sinai) penepene na biso тропа kopesa ye sekele.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥ مِن رَّحۡمَتِنَآ أَخَاهُ هَٰرُونَ نَبِيّٗا
Mpe na mawa na biso topesaki ye ndeko waye Háruna azala lokola ntoma.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ إِسۡمَٰعِيلَۚ إِنَّهُۥ كَانَ صَادِقَ ٱلۡوَعۡدِ وَكَانَ رَسُولٗا نَّبِيّٗا
Mpe kundola okati ya buku Ismâîl. Ya sólo, azalaki kokokisa elaka mpe azalaki ntoma mpe motindami.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَكَانَ يَأۡمُرُ أَهۡلَهُۥ بِٱلصَّلَوٰةِ وَٱلزَّكَوٰةِ وَكَانَ عِندَ رَبِّهِۦ مَرۡضِيّٗا
Mpe azalaki kotinda libota lia ye na losambo mpe kopesa zakat,[1] mpe Nkolo waye azalaki kosepela naye.
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 43.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَٱذۡكُرۡ فِي ٱلۡكِتَٰبِ إِدۡرِيسَۚ إِنَّهُۥ كَانَ صِدِّيقٗا نَّبِيّٗا
Mpe kundola Idrís[2] okati ya buku. Ya soló azalaki ntoma mpe moto ya bosembo.
[2] Idrîs: Enoka.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَرَفَعۡنَٰهُ مَكَانًا عَلِيًّا
Mpe totombolaki ye esika likolo ya lokumu koleka.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ أَنۡعَمَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ مِن ذُرِّيَّةِ ءَادَمَ وَمِمَّنۡ حَمَلۡنَا مَعَ نُوحٖ وَمِن ذُرِّيَّةِ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡرَٰٓءِيلَ وَمِمَّنۡ هَدَيۡنَا وَٱجۡتَبَيۡنَآۚ إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُ ٱلرَّحۡمَٰنِ خَرُّواْۤ سُجَّدٗاۤ وَبُكِيّٗا۩
Baye wana bantoma baye Allah atondisaki bolamu naye likolo na bango kati ya libota ya Adam, na baye bazalaki elongo na Nûh (okati ya masuwa), mpe libota lia Ibrâhîm mpe Isalayele, mpe basusu baye tokambaki mpe toponaki, soki mikapo mia Ar-Rahmân[1] mizali kotangama, bakweyaka na kofukama na kolela.
[1] Bótala na suratu oyo Mokapo: 18, 26, 45.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
۞ فَخَلَفَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ خَلۡفٌ أَضَاعُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَٱتَّبَعُواْ ٱلشَّهَوَٰتِۖ فَسَوۡفَ يَلۡقَوۡنَ غَيًّا
Kasi baye bakitanaki sima na bango, batikaki kosambela mpe balandaki bisengo na baposa na bango ya nzoto, kasi mosika te bakobebisama.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
إِلَّا مَن تَابَ وَءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَأُوْلَٰٓئِكَ يَدۡخُلُونَ ٱلۡجَنَّةَ وَلَا يُظۡلَمُونَ شَيۡـٔٗا
Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe asali misala milamu, bango nde bakokota na Iola mpe bakobubama te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
جَنَّٰتِ عَدۡنٍ ٱلَّتِي وَعَدَ ٱلرَّحۡمَٰنُ عِبَادَهُۥ بِٱلۡغَيۡبِۚ إِنَّهُۥ كَانَ وَعۡدُهُۥ مَأۡتِيّٗا
(Bakozala) na elanga ya edeni eye Ar-Rahmân alakaki yango bawumbu naye, baye bandimaki na (mabombami na yango). Ya soló, elaka naye ezali na tembe te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
لَّا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوًا إِلَّا سَلَٰمٗاۖ وَلَهُمۡ رِزۡقُهُمۡ فِيهَا بُكۡرَةٗ وَعَشِيّٗا
Kati na yango (Iola), bakoyokaka maloba mazanga ntina te, sé kimia, mpe bakozalaka na bilei bia tongo mpe pokwa.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
تِلۡكَ ٱلۡجَنَّةُ ٱلَّتِي نُورِثُ مِنۡ عِبَادِنَا مَن كَانَ تَقِيّٗا
Wana nde Iola eye tokopesaka bawumbu ba biso baye bazalaki na bobangi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَمَا نَتَنَزَّلُ إِلَّا بِأَمۡرِ رَبِّكَۖ لَهُۥ مَا بَيۡنَ أَيۡدِينَا وَمَا خَلۡفَنَا وَمَا بَيۡنَ ذَٰلِكَۚ وَمَا كَانَ رَبُّكَ نَسِيّٗا
Tokitaka te sé na mitindo mia Nkolo wa yo, manso maye mazali liboso lia biso mpe osima na biso na maye manso mazwami o kati kati na yango mibale mazali yaye. Mpe Nkolo wayo abosanaka te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مەريەم
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش