Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مەريەم   ئايەت:
فَكُلِي وَٱشۡرَبِي وَقَرِّي عَيۡنٗاۖ فَإِمَّا تَرَيِنَّ مِنَ ٱلۡبَشَرِ أَحَدٗا فَقُولِيٓ إِنِّي نَذَرۡتُ لِلرَّحۡمَٰنِ صَوۡمٗا فَلَنۡ أُكَلِّمَ ٱلۡيَوۡمَ إِنسِيّٗا
Lia mpe mela mpe sepelisa liso lia yo, soki omoni moto loba: Nazui elako ya ngizi pona Ar-Rahmán[1] Nakosolola ata na moto moko lelo te.
[1] Bótala na suratu oyo Mokapo: 18.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَأَتَتۡ بِهِۦ قَوۡمَهَا تَحۡمِلُهُۥۖ قَالُواْ يَٰمَرۡيَمُ لَقَدۡ جِئۡتِ شَيۡـٔٗا فَرِيّٗا
Mpe amemaki mwana na libota naye, mpe balobi naye ete: Oh Maryam! Osali likambo ya nsoni.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
يَٰٓأُخۡتَ هَٰرُونَ مَا كَانَ أَبُوكِ ٱمۡرَأَ سَوۡءٖ وَمَا كَانَتۡ أُمُّكِ بَغِيّٗا
Oh ndeko mwasi ndeko ya Háruna! Tata wayo azalaka moto mabe te, mpe mama wayo azalaka ndumba te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَأَشَارَتۡ إِلَيۡهِۖ قَالُواْ كَيۡفَ نُكَلِّمُ مَن كَانَ فِي ٱلۡمَهۡدِ صَبِيّٗا
Mpe alakisaki mosapi mwaye epai ya mwana, balobi: Ndenge nini tokolobisa mwana moke oyo awuti kobotama?
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قَالَ إِنِّي عَبۡدُ ٱللَّهِ ءَاتَىٰنِيَ ٱلۡكِتَٰبَ وَجَعَلَنِي نَبِيّٗا
(Mwana) Alobi: Ya soló, nazali mowumbu wa Allah, apesi ngai buku mpe aponi ngai nazala ntoma,
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَجَعَلَنِي مُبَارَكًا أَيۡنَ مَا كُنتُ وَأَوۡصَٰنِي بِٱلصَّلَوٰةِ وَٱلزَّكَوٰةِ مَا دُمۡتُ حَيّٗا
Mpe apamboli ngai esika nyoso nakozala, mpe atindi ngai nasambela mpe nabimisa Zakat[1] na bomoyi bwa ngai mobimba,
[1] Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 43.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَبَرَّۢا بِوَٰلِدَتِي وَلَمۡ يَجۡعَلۡنِي جَبَّارٗا شَقِيّٗا
Mpe nasala bolamu epai ya mama na ngai, mpe atiaki ngai nazala moto ya lolendo mpe moto ya pași te.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَٱلسَّلَٰمُ عَلَيَّ يَوۡمَ وُلِدتُّ وَيَوۡمَ أَمُوتُ وَيَوۡمَ أُبۡعَثُ حَيّٗا
Mpe kimia ezala likolo lia ngai, mokolo moye nabotamaki na mokolo moye nakokufa na mokolo moye nakosekwisama nazali na bomoyi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
ذَٰلِكَ عِيسَى ٱبۡنُ مَرۡيَمَۖ قَوۡلَ ٱلۡحَقِّ ٱلَّذِي فِيهِ يَمۡتَرُونَ
Wana Issa mwana ya Maryam, liloba ya soló, eye bazali sé kotia tembe mpe kobundisa bosóló. (bwa ye)
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
مَا كَانَ لِلَّهِ أَن يَتَّخِذَ مِن وَلَدٖۖ سُبۡحَٰنَهُۥٓۚ إِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
Esengeli te na Allah azala na mwana, nkembo naye (Allah), soki akani likambo akoloba sé ete; zala, mpe ezalisami sé ndenge alobi.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَإِنَّ ٱللَّهَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
Mpe ya soló, Allah azali Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino, bobondela ye, oyo nde nzela ya semba.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
فَٱخۡتَلَفَ ٱلۡأَحۡزَابُ مِنۢ بَيۡنِهِمۡۖ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن مَّشۡهَدِ يَوۡمٍ عَظِيمٍ
(Na sima) bakabwani na binzambe nzambe kati kati na bango, etumbu ezali тропа bapengwi o mokolo ya monene (mokolo ya kokata makambo).
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
أَسۡمِعۡ بِهِمۡ وَأَبۡصِرۡ يَوۡمَ يَأۡتُونَنَا لَٰكِنِ ٱلظَّٰلِمُونَ ٱلۡيَوۡمَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
Bakoyoka mpe bakomona penza ndenge mokolo bakoyela biso, kasi babubi bakozala na libungi ya monene ya polele о mokolo yango.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: مەريەم
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش