Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഇസ്റാഅ്   ആയത്ത്:
۞ قُلۡ كُونُواْ حِجَارَةً أَوۡ حَدِيدًا
Loba: Bokoma libanga to libende,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوۡ خَلۡقٗا مِّمَّا يَكۡبُرُ فِي صُدُورِكُمۡۚ فَسَيَقُولُونَ مَن يُعِيدُنَاۖ قُلِ ٱلَّذِي فَطَرَكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةٖۚ فَسَيُنۡغِضُونَ إِلَيۡكَ رُءُوسَهُمۡ وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هُوَۖ قُلۡ عَسَىٰٓ أَن يَكُونَ قَرِيبٗا
To, bopona ekelamu oyo bomoni ezali monene mpe makasi. Bakolobaka: Nani oyo akozongisaka biso? Loba: Oyo akelaka bino liboso, mpe bazali kotiola yo na boningisi mitu mia bango na bolobi: Tango nini wana? Loba: Ekoki kozala pene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَوۡمَ يَدۡعُوكُمۡ فَتَسۡتَجِيبُونَ بِحَمۡدِهِۦ وَتَظُنُّونَ إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا قَلِيلٗا
O mokolo moye akobengaka bino, bokoyanolaka ye na bopesi ye lokumu, bokokanisa ete bowumela na mabele te sé tango moke.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقُل لِّعِبَادِي يَقُولُواْ ٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُۚ إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ يَنزَغُ بَيۡنَهُمۡۚ إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ كَانَ لِلۡإِنسَٰنِ عَدُوّٗا مُّبِينٗا
Mpe loba na bawumbu na ngai ete: Baloba maloba sé ya malamu, pamba te mpo satana akotia bokabuani o kati na bango. Ya soló, satana azali penza monguna ya moto ya polele.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
رَّبُّكُمۡ أَعۡلَمُ بِكُمۡۖ إِن يَشَأۡ يَرۡحَمۡكُمۡ أَوۡ إِن يَشَأۡ يُعَذِّبۡكُمۡۚ وَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ عَلَيۡهِمۡ وَكِيلٗا
Nkolo wa bino ayebi bino malamu koleka, soki alingi akoyokela bino mawa, soki mpe alingi apeși bino etumbu. Мре totindaki yo te ozala mobateli likolo na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَرَبُّكَ أَعۡلَمُ بِمَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَلَقَدۡ فَضَّلۡنَا بَعۡضَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ عَلَىٰ بَعۡضٖۖ وَءَاتَيۡنَا دَاوُۥدَ زَبُورٗا
Mpe Nkolo wa yo ayebi malamu penza manso maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe totombola bantoma basusu likolo ya baninga, mpe topesaki Dáwud zabur[1].
[1] Zabur: Ezali buku ya Dáwud.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلِ ٱدۡعُواْ ٱلَّذِينَ زَعَمۡتُم مِّن دُونِهِۦ فَلَا يَمۡلِكُونَ كَشۡفَ ٱلضُّرِّ عَنكُمۡ وَلَا تَحۡوِيلًا
Loba: Bobelela banzambe wana bozali kozua na botiki ye, bazali na makoki te ya kolongola bino mabe mpe bazali na makoki te ya kopekisa yango ete ezua bino.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ يَبۡتَغُونَ إِلَىٰ رَبِّهِمُ ٱلۡوَسِيلَةَ أَيُّهُمۡ أَقۡرَبُ وَيَرۡجُونَ رَحۡمَتَهُۥ وَيَخَافُونَ عَذَابَهُۥٓۚ إِنَّ عَذَابَ رَبِّكَ كَانَ مَحۡذُورٗا
Baye bazuaki bango ba nzambe, bango moko bazali koluka eloko nini bakosala epusanisa bango penepene na Nkolo wa bango mpe bazali kolikia ngolu naye mpe bazali kobanga etumbu naye. Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ezali ya kobanga mpe ezali na tembe te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِن مِّن قَرۡيَةٍ إِلَّا نَحۡنُ مُهۡلِكُوهَا قَبۡلَ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ أَوۡ مُعَذِّبُوهَا عَذَابٗا شَدِيدٗاۚ كَانَ ذَٰلِكَ فِي ٱلۡكِتَٰبِ مَسۡطُورٗا
Mboka moko te ya bobubi ekotikala sé toboma yango yambo ya mokolo mwa suka ekoka, to tokopesaka yango etumbu ya makasi. Nyoso wana esila kokomama o kati ya buku.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ഇസ്റാഅ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക